Psalms 31

Natie motema na ngai na Yawe

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi.


1 Yawe,
natie motema na ngai epai na yo ;
kondima te ete bayokisa ngai soni ;
bikisa ngai kati na bosembo na yo.

2 Tia litoyi na yo epai na ngai ;
yaka noki kobikisa ngai ;
zala libanga na ngai,
esika ya makasi epai nabombamaka,
mpe ndako ya makasi,
mpo ete obikisa ngai.

3 Pamba te, yo ozali libanga na ngai
mpe esika na ngai ya makasi epai nabombamaka ;
mpe mpo na kombo na yo,
tambolisa ngai, mpe kamba ngai.

4 Longola ngai na motambo oyo batieli ngai,
pamba te yo ozali esika na ngai oyo nabombamaka.

5 Natiki molimo na ngai na loboko na yo ;
pamba te yo moto okangolaki ngai,
Yawe, Nzambe ya solo !

6 Nayinaka bato oyo bakangamaka na bikeko ya pamba-pamba,
kasi natiaka motema na ngai epai ya Yawe.

7 Nakosepela mpe nakozala na esengo
mpo na bolamu na yo ;
pamba te ozali komona bapasi na ngai,
mpe oyebi mawa ya molimo na ngai.

8 Mpe okabaki ngai te na loboko ya monguna,
kasi otiaki ngai na esika ya kimia penza.

9 Yawe, yokela ngai mawa
pamba te nazali kati na pasi ;
tala ndenge miso na ngai,
molimo mpe nzoto na ngai ebebi mpo na mawa.

10 Bomoi na ngai ezali kosila mpo na mawa,
mpe bambula na ngai ezali kolimwa mpo na kolela ;
makasi na ngai esili mpo na bapasi na ngai,
mpe mikuwa na ngai elembi.

11 Mpo na banguna na ngai nyonso,
nakomi eloko ya kotiola epai ya bato oyo bazali pembeni na ngai,
mpe eloko ya somo epai ya baninga na ngai ;
Mpe baoyo bazali komona ngai na nzela,
bazali kokima ngai.

12 Babosani ngai lokola moto oyo asiʼakufa ;
nakomi lokola nzungu ya mabele oyo epanzani.

13 Pamba te nazali koyoka matongi ya bato mingi ;
somo ezingi ngai bipai nyonso ;
bazali koyokana mpo na kobundisa ngai,
mpe bazali kosala likita mpo na kobebisa bomoi na ngai.

14 Kasi natiaka motema na ngai kati na yo,
Yawe ; mpe nalobaka :
“Ozali Nzambe na ngai.”

15 Mikolo na ngai nyonso ezali na maboko na yo ;
kangola ngai na maboko ya banguna
mpe ya bato oyo bazali kolanda ngai.

16 Tika ete elongi na yo engengela mosali na yo ;
bikisa ngai mpo na bolingo na yo ya makasi.

17 Kotika te ete nayoka soni, Yawe, pamba te, nagangaki epai na yo ;
kasi tika ete bato na mabe bayoka soni mpe bavanda nye
kati na mboka ya bakufi.

18 Tika ete bilembo oyo elobaka lokuta evanda nye ;
pamba te, na lolendo mpe na litioli,
balobaka na lofundu na moto na sembo.

19 Tala ndenge, bolamu na yo ezali monene,
oyo obombelaka bato oyo babangaka yo ;
mpe oyo opesaki liboso ya bato oyo
bayaka kobombama epai na yo.

20 Liboso ya miso na yo, obombaka bango mosika
ya makanisi ya mabe ya bato ;
Na esika yo ovandaka, obatelaka bango na kimia
mosika ya lolemo oyo efundaka.

21 Masonzoli ezala epai ya Yawe.
Pamba te alakisaki ngai bolingo na ye kokamwa
tango nazalaki na kati ya vile oyo bazingaki na basoda.

22 Kati na kobanga na ngai, nalobaki :
“Balongoli ngai liboso na yo !”
Nzokande oyokaki koganga mpo na mawa
tango na bengaki yo mpo na lisungi.

23 Bolinga Yawe, bino basantu na ye nyonso !
Yawe abatelaka Yawe abatelaka bandimi,
Kasi azongiselaka bato ya lofundu ndenge ekoki.

24 Bozala makasi mpe na mpiko,
bino nyonso oyo botiaka motema
epai ya Yawe.
Copyright information for LinMNB