Psalms 32

Mapamboli na moto oyo Yawe alimbisi

Nzembo ya David


1 Mapamboli na moto oyo mabe na ye elimbisami,
oyo masumu na ye ezipami.

2 Mapamboli na moto oyo
Yawe azali kotanga masumu na ye te,
Mpe kati na molimo na ye lokuta ezali te.

3 Tango navandaki nye,
mikuwa na ngai ezalaki ya kolemba
mpo na kolela na ngai ya mokolo mobimba.

4 Pamba te butu mpe moi,
loboko na yo ezalaki likolo na ngai ;
makasi na ngai esilaki lokola na tango ya moi ya makasi.

5 Bongo nayebisaki yo lisumu na ngai,
mpe nazipaki mabe na ngai te ;
nalobaki : “nakotubela masumu na ngai epai ya Yawe”,
mpe yo, olimbisaki mabe ya lisumu na ngai.

6 Yango wana, tika ete moto nyonso oyo atosaka makambo na yo
abondela yo na tango oyo akoki komona yo ;
ya solo tango mpela ya mayi ya makasi penza ekoya,
yango ekomema ye te.

7 Yo ozali esika ngai nabombamaka ;
okobatela ngai na tango ya mikakatano,
mpe okozinga ngai na banzembo ya kokangolama.

8 Nakoteya yo mpe nakolakisa yo nzela
oyo osengeli kolanda ;
nakopesa yo toli,
mpe liso na ngai ekokengela yo.

9 Kozala lokola mpunda te,
to lokola mbalata te, oyo ezangi bososoli ;
kasi oyo bakambaka na ebende mpe na singa na monoko,
noki te ekoki koya epai na yo.

10 Bapasi ezali mingi mpo na moto ya mabe ;
kasi bolingo makasi ya Yawe ezingaka moto oyo
atiaka motema epai na ye.

11 Bosepela kati na Yawe mpe bazala na esengo,
bino bato na sembo
mpe botonda na esengo !
Bino nyonso, oyo bozali mitema alima
boyemba !
Copyright information for LinMNB