Psalms 33

Yawe azali mokeli mpe mobikisi


1 Boyemba na esengo mpo na Yawe, bino bato na sembo ;
ebongi mpo na moto na alima asanzola ye.

2 Bosanzola Yawe na lindanda ;
bobeta miziki mpo na ye na gitare ya basinga zomi

3 Boyembela ye nzembo ya sika ;
bobeta na malamu penza,
mpe boganga mpo na esengo.

4 Pamba te Liloba na Yawe ezali sembo mpe solo ;
mpe azali moyengebene kati na nyonso oyo asalaka.

5 Yawe alingaka alima mpe bosembo ;
mokili ezali ya kotonda na bolingo na ye ya makasi.

6 Likolo esalama na liloba na Yawe ;
biloko nyonso na yango esalama na mpema
ya monoko na ye.

7 Asangisaka bamayi ya ebale na kati ya eluku,
atiaka bisika ya mozindo
na kati ya bibombelo.

8 Tika ete mokili mobimba ebanga Yawe ;
tika ete bato nyonso ya mokili balengela ye.

9 Pamba te alobaki,
mpe yango esalamaki ;
apesaki motindo, mpe yango etelemaki ngwi.

10 Yawe abebisaka mabongisi ya bikolo,
apekisaka mikano ya bato.

11 Kasi mabongisi na Yawe etikalaka seko ;
mikano ya motema na ye,
etikalaka na mabota na mabota.

12 Mapamboli na ekolo oyo Nzambe azali Yawe,
bato oyo ye apona mpo na bomengo na ye !

13 Yawe azali kotala wuta na likolo,
mpe azali komona bato nyonso.

14 Wuta na esika ye avandaka,
azali kotala bato nyonso oyo bavandaka na mokili.

15 Ye moto asalaka mitema ya bato nyonso,
mpe atalaka makambo nyonso oyo basalaka.

16 Mokonzi moko te abikaka mpo na ebele ya mapinga ya basoda na ye ;
mpe elombe moko te akangolamaka mpo na makasi na ye.

17 Mpunda ezali elikya ya pamba mpo na kokangolama ;
ata makasi na yango ekoki kobikisa ata moke te.

18 Kasi miso na Yawe ezali likolo ya bato oyo babangaka ye,
likolo ya baoyo batiaka elikya na bango na bolingo na ye ya makasi,

19 mpo na akangola bango na liwa,
mpe abatela bomoi na bango na tango ya nzala.

20 Tozali kozela na elikya epai na Yawe ;
ye azali lisalisi na biso,
mpe ebende ya makasi oyo ebatelaka biso.

21 Kati na ye mitema na biso, ezali kosepela ;
mpo totiaki motema na biso
na kombo na ye ya bosantu.

22 Yawe, lokola totiaka elikya na biso kati na yo,
tika ete bolingo na yo ya makasi ezala likolo na biso.
Copyright information for LinMNB