Psalms 34

Yawe akangoli ngai

Nzembo ya David, ayembaki yango tango akosanaki liboma liboso ya Abimeleki ; bongo Abimeleki abenganaki ye, mpe akendaki.


1 Nakonetola Yawe tango nyonso ;
masanzoli na ye ekozala mikolo nyonso na bimbebo na ngai.

2 Molimo na ngai ekomikumisa kati na Yawe ;
tika ete bato na pasi bayoka mpe basepela.

3 Bokumisa Yawe elongo na ngai,
tika ete tonetola kombo na ye elongo.

4 Nalukaki Yawe,
mpe azongiselaki ngai eyano,
akangolaki ngai na kobanga nyonso
oyo nazalaki na yango.

5 Baoyo batalaki epai na ye, bangengaki ;
mpe bilongi na bango ekoki koyoka soni ata moke te.

6 Mobola oyo abelelaki,
mpe Yawe ayokaki ye,
abikisaki ye na minyoko na ye nyonso.

7 Anzelu na Yawe azingaka bato oyo babangaka Yawe,
mpe akangolaka bango.

8 Bomeka mpe bomona, ete Yawe zali malamu
mapamboli na moto oyo abombamaka kati na ye !

9 Bobanga Yawe, bino basantu na ye,
pamba te, baoyo babangaka ye bazangaka eloko moko te.

10 Bantambwe balembaka mpe bakufaka nzala,
kasi bato oyo balukaka Yawe
bazangaka eloko ya malamu te.

11 Boya Bana na ngai, mpe boyoka ngai ;
nakoteya bino ndenge bosengeli kobanga Yawe.

12 Nani kati na bino alingi bomoi,
mpe alingi komona mikolo mingi ya malamu ?

13 Batela lolemo na yo na mabe,
mpe bambebo na yo na maloba ya lokuta ;

14 longwa kati na mabe,
mpe sala ya malamu ;
luka kimia, mpe landa yango.

15 Miso na Yawe etalaka bato na sembo,
mpe matoyi na ye eyokaka kolela na bango.

16 Elongi na Yawe eyinaka bato oyo basalaka mabe,
mpo ete bakanisa bango lisusu te na kati ya mokili.

17 Bato na sembo babelelaka, mpe
Yawe ayokaka bango ;
mpe akangolaka bango na minyoko na bango nyonso.

18 Yawe azali pene-pene ya bato
oyo bazali na mitema oyo etutami
mpe abikisaka baoyo bazali na milimo oyo ezangi kimia.

19 Moto na sembo asengeli komona minyoko ya ndenge na ndenge ;
kasi Yawe akangolaka ye na nyonso.

20 Ye abatelaka mikuwa na ye nyonso ;
mpe mokuwa na ye ata moko te ekoki kobukana.

21 Mabe ekoboma moto na mabe ;
mpe bayini na moto na sembo bakokatela bango etumbu.

22 Yawe akangolaka na bowumbu basali na ye ;
mpe moko te na baoyo babombamaka kati na ye
bakokatela ye etumbu.
Copyright information for LinMNB