Psalms 35

Yawe abatelaka bato ya bolembu

Nzembo ya David


1 Welana, Yawe, na baoyo bazali kowelana na ngai ;
bundisa bato oyo bazali kobundisa ngai.

2 Kamata ebende oyo ebatelaka ya monene mpe ya moke,
telema mpe yaka kosalisa ngai.

3 Tombola likonga ya monene mpe ya moke
mpo na kobundisa bato oyo bazali kolanda ngai !
Loba na molimo na ngai :
“Nazali lobiko na yo.”

4 Tika ete baoyo bazali koluka bomoi na ngai,
basambwa mpe bayoka soni,
Tika ete baoyo bazali kokana kosala ngai mabe,
bazonga sima mpe bakota na mobulu.

5 Tika ete bakoma lokola matiti ya kokawuka
oyo mopepe ezali komema-mema ;
elongo anzelu na Yawe akobengana bango !

6 Tika ete nzela na bango ekoma molili mpe moselu ;
elongo anzelu na Yawe akolanda bango !

7 Pamba te, batieli ngai monyama kaka pamba ;
mpe kaka pamba, batimoli libulu ya molayi
mpo na ngai.

8 Tika ete libebi ekweyela bango na mbalakaka ;
tika ete monyama oyo batiaki
ekanga bango ;
mpo na libebi na bango

9 Bongo molimo na ngai ekosepela kati na Yawe ;
mpe ekotonda na esengo kati na lobiko na ye.

10 Mobimba na ngai ekoganga :
nani azali lokola yo, Yawe ?
Yo moto okangolaka mobola,
na maboko ya elombe oyo aleki bango na makasi ;
mobola mpe moto akelela
na maboko ya bato oyo bayibaka bango.

11 Batemwe oyo bazali na mawa te bayei,
bazali kotuna ngai makambo oyo nayebi te.

12 Bazali kozongisela ngai mabe na malamu
mpe basundoli molimo na ngai yango moko.

13 Kasi, tango bango bazalaki maladi,
nalataki saki ;
mpe namikitisaki na koboya kolia
tango mabondeli na ngai ezongaki epai na ngai na eyano te,

14 Nazalaki kotambola na mawa,
mpo na moninga na ngai to mpo na ndeko na ngai ;
nazalaki kokitisa motu na se,
lokola nde nazali kolela mama na ngai.

15 Tango na betaki libaku, basanganaki na esengo
basanganaki mpo na kobundisa ngai,
awa nayebaki likambo te ;
batikaki te kofinga ngai.

16 Lokola bato oyo batosaka makambo ya Nzambe te,
bazalaki koseka ngai na ndenge ya mabe ;
bazalaki kolia minu mpo na ngai.

17 Yawe, kino tango nini okotala boye ?
Kangola bomoi na ngai na kobebisa na bango,
bomoi na ngai ya motuya penza na bantambwe oyo.

18 Nakozongisela yo matondi na kati ya lisanga monene ;
na kati ya bato ebele nakosanzola yo.

19 Kotika te ete basepela likolo na ngai
baoyo bayinaka ngai kaka pamba ;
kotika te baoyo bayinaka ngai kaka pamba,
batala ngai na songe ya liso.

20 Balobaka maloba ya kimia te,
kasi bakanisaka makambo ya lokuta
mpo na kokosela baoyo bazali kovanda na kimia
kati na mokili.

21 Bafungoleli ngai monoko mpe balobaki :
“A a ! A a ! na miso na biso moko tomoni yango !”

22 Yawe, omonaki yango ;
kovanda nye te.
Kozala mosika na ngai te, Yawe.

23 Lamuka mpe telema mpo na kolongisa ngai,
welana na bango mpo na ngai,
Nzambe na ngai mpe Yawe na ngai.

24 Longisa ngai kati na bosembo na yo, Yawe, Nzambe na ngai ;
kotika bango te basepela likolo na ngai.

25 Kotika bango te bakanisa.
“Aa ! Aa ! Tolingaki boye.”
Baloba te : “Tomeli ye.”

26 Tika ete baoyo nyonso basepelaka likolo ya bapasi na ngai,
bayoka soni mpe basambwa ;
tika ete baoyo bamitombolaka bango moko
mpo na ngai, balata soni mpe basambwa

27 Tika ete baoyo basepelaka na kolonga na ngai,
basepela mpe batonda na esengo ;
tika ete balobaka tango nyonso :
“Yawe anetolama, ye oyo asepelaka
na bozali-malamu ya mosali na ye.”

28 Lolemo na ngai ekolobela bosembo na yo,
mpe masanzoli na yo mokolo mobimba.
Copyright information for LinMNB