Psalms 39

Nakomi pene ya liwa

Nzembo ya David, epai ya mokambi ya bayembi : Yedutuni.


1 Nalobaki : “Nakokengela banzela na ngai,
mpe nakobatela lolemo na ngai na masumu ;
nakotia ekangeli na monoko na ngai,
na tango nyonso oyo bato na mabe bakozala na miso na ngai.”

2 Kasi tango nakangaki monoko mpe navandaki nye,
mpe ata nalobaki likambo moko te
kasi pasi na ngai ezalaki kaka kobakisama.

3 Motema na ngai ezalaki kozika na kati na ngai ;
mpe tango nazalaki kokanisa, moto epelaki ;
bongo nalobaki na monoko na ngai :

4 lakisa ngai, Yawe, suka ya bomoi na ngai,
mpe ntalo ya mikolo na ngai,
Tika nayeba boni bomoi na ngai ezali kaka koleka.

5 Yo nde otiaki mikolo na ngai
lokola molayi ya loboko na ngai ;
molayi ya bambula na ngai ezali pamba liboso na yo
bomoi ya moto nyonso
ezali kaka mopepe.

6 Moto azali kaka elilingi lokola akendeke mpe azongaka ;
amitungisaka kaka pamba ;
andukaka bomengo,
kasi ayebaka te soki nani akotikala kozwa yango.

7 Kasi sikʼoyo, Yawe,
eloko nini, nazali kozela ?
Elikya na ngai nyonso ezali kati na yo.

8 Bikisa ngai na mabe na ngai nyonso ;
kotika te ete nakoma litioli ya bazoba.

9 Navandaki nye
Nafungolaki monoko na ngai te,
pamba te, yo moto osalaki bongo.

10 Longola bitumba na yo likolo na ngai ;
nanyokwami na fimbu ya loboko na yo

11 Opamelaka mpe opesaka etumbu na bato
mpo na masumu na bango ;
ozikisaka bomengo na bango lokola mbinzo ;
ya solo, moto nyonso azali kaka mopepe.

12 Yoka libondeli na ngai, Yawe,
yoka koganga na ngai mpo na lisalisi ;
kozala nye te na kolela na ngai ;
pamba te navandaka elongo na yo lokola mopaya
lokola mopaya, moleki nzela,
ndenge batata na ngai nyonso bazalaki

13 Longola miso na yo epai na ngai,
mpo ete nakoka kosepela lisusu,
liboso nakende mpe namonana lisusu te.
Copyright information for LinMNB