Psalms 43

Tia elikya na Yawe


1 Longisa ngai, Nzambe mpe lobela ngai liboso ya ekolo
oyo etosaka makambo na yo te ;
kangola ngai na maboko ya bato ya lokuta mpe ya mabe.

2 Yo ozali Nzambe, ndako na ngai ya makasi.
Mpo na nini osundoli ngai ?
Mpo na nini nazali kotambola na pasi
boye, konyokwama na monguna ?

3 Tinda mwinda na yo mpe solo na yo,
tika yango ekamba ngai ;
tika yango emema ngai na ngomba na yo ya bosantu,
na esika oyo yo ovandaka.

4 Bongo nakokende na mesa oyo batumbelaka Nzambe makabo,
epai ya Nzambe,
esengo na ngai mpe kosepela na ngai.
Nzambe, Nzambe na ngai,
nakosanzola yo na lindanda.

5 Mpo na nini olembi boye ; e e molimo na ngai ?
Mpo na nini ozali kotungisama kati na ngai ?
Tia elikya na Nzambe ;
pamba te nakosanzola ye lisusu,
Mobikisi na ngai mpe Nzambe na ngai.
Copyright information for LinMNB