Psalms 46

Nzambe azali ekimelo na biso

Nzembo ya bana ya Kore epai ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo ya moke, oyo ya bilenge basi.


1 Nzambe azali esika na biso oyo tobombamaka
mpe makasi na biso ; azali lisungi
ya tango nyonso na tango ya minyoko.

2 Yango wana, tokobanga te ata soki mabele epasuki,
ata soki bangomba ekweyi na kati ya ebale monene ;

3 ata soki mayi na yango engulumi
mpe ebimisi fulu-fulu,
mpe bangomba eningani na kotombola na bango.

4 Ezali na ebale moko mayi na yango
esepelisaka vile ya Nzambe,
epai ye oyo Aleki Likolo avandaka.

5 Nzambe azali kati na ye,
akoki kokweya te ;
Nzambe akosunga ye na tongo-tongo penza.

6 Bikolo bizali kotomboka,
bokonzi ekweyi ;
atomboli mongongo na ye,
mabele ezali konyangwama.

7 Yawe ya nguya nyonso azali elongo na biso !
Nzambe ya Zakobi azali esika na biso oyo tokimelaka.

8 Boya mpe botala misala ya Yawe,
kolela oyo atiaki kati na mokili.

9 Asilisaki bitumba kino na basuka ya mokili ;
Akataki batolo-tolo mpe abukaki makonga,
mpe atumbaki na moto bibende oyo ebatelaka.

10 Alobaki : “Bovanda kimia,
boyeba ete ngai nazali Nzambe ;
nakonetolama kati na bikolo
nakonetolama kati na mokili.”

11 Yawe ya nguya nyonso azali elongo na biso ;
Nzambe ya Zakobi azali esika na biso oyo tokimelaka.
Copyright information for LinMNB