Psalms 49

Kotiela bomengo motema ezali bozoba

Nzembo ya bana ya Kore epai ya mokambi ya bayembi.


1 Botia litoyi na makambo oyo,
bino bato nyonso ;
boyoka, bino nyonso oyo bovandaka na mokili oyo,

2 bato pamba mpe bato minene,
bato ya mbongo mpe bato bakelela :

3 Monoko na ngai ekoloba maloba ya bwanya ;
nyonso oyo ekowuta na motema na ngai
ekopesa bososoli.

4 Nakobalola litoyi na ngai mpo na koyoka lisese ;
na lindanda, nakolimbola sambole na ngai.


5 Mpo na nini na kobanga tango mikolo mabe ekoya,
tango mabe ya bato ya lokuta ezali kozinga ngai,

6 bango batiaka mitema na bomengo na bango
mpe bamikumisaka mpo na bozui na bango mingi ?

7 Moto moko te akoki kokangola
bomoi ya moto mosusu,
to kopesa Nzambe ntalo ya kokangolama na ye.

8 Ntalo ya kokangolama mpo na bomoi ezali
na mutuya monene,
lifuti moko te ekokani na yango.

9 Mpo ete azala na bomoi libela na libela,
mpe apola te.

10 Pamba te bato nyonso bamonaka :
ete bato ya bwanya bakufaka ;
zoba na moto oyo azanga mayele bakufaka mpe,
mpe batikaka bomengo na bango na bato mosusu.

11 Malita na bango ekotikala bandako na bango libela na libela
bisika na bango ya kovanda ekotikala
mpo na baoyo bakoya na sima.
Bapesaka bakombo na mabele sima na bango.

12 Kasi moto, ata azali na bozui,
akowumela te ;
akokani na nyama oyo ekufaka.

13 Oyo nde, ekweyelaka
bato oyo batiaka mitema kati na bango moko,
mpe ya baoyo balandaka bango, baoyo bandimaka maloba na bango.

14 Lokola bameme ; babongisa bango mpo na mboka ya bakufi ;
mpe liwa ekolia bango.
Moto na alima akozala na bokonzi likolo na bango na tongo ;
lolenge na bango ekopola na mboka ya bakufi,
mosika na bandako na bango ya bokonzi.

15 Kasi Nzambe akokangola molimo na ngai
wuta na mboka ya bakufi ;
akozua ngai ya solo mpo na ye moko.

16 Kobanga te soki moto azali komata na bozui,
tango kongenga ya ndako na ye ezali kaka komata.

17 Pamba te, akomema ata eloko moko te,
mokolo akokufa ;
kongenga na ye ekokita na ye te.

18 Tango azalaki na bomoi,
azalaki komimona apambolama ;
mpe bato kosanzolaka yo
tango ozali kopambolama

19 akolanda batata na ye
baoyo bakomona lisusu te moi ya bomoi.

20 Moto oyo azali na bozui kasi azangi bososoli,
azali lokola nyama oyo ekufaka.
Copyright information for LinMNB