Psalms 5

Yawe tambolisa ngai na nzela na yo

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi ; ayembaki yango na flute.


1 Yawe, yoka maloba na ngai ;
mpe tala kolela na ngai !

2 Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai,
yoka koganga oyo nazali koganga mpo na kosenga lisalisi,
pamba te epai na yo nazali kobondela.

3 Yawe, na tongo oyokaka mongongo na ngai ;
na tongo, natiaka makambo oyo nasengaka liboso na yo ;
mpe nazelaka eyano na yo.

4 Pamba te ozali Nzambe oyo osepelaka na makambo ya mabe te ;
mpe moto ya mabe akoki kovanda elongo na yo te.

5 Bato ya lolendo bakoki kotelema na miso na yo te ;
mpe oyinaka baoyo nyonso basalaka mabe.

6 Obebisaka bato oyo balobaka lokuta ;
Yawe ayokaka somo mpo na bato oyo basopaka makila ya bato
mpe baoyo bakosaka.

7 Kasi ngai nakokota na ndako na yo,
mpo na boboto na yo oyo eleki monene ;
mpe nakokumbama na kati ya Ndako na yo ya bosantu,
na botosi nyonso oyo nazali na yango epai na yo.

8 Yawe, kamba ngai kati na bosembo na yo ;
mpo na banguna na ngai ;
bongisa nzela na yo liboso na ngai.

9 Pamba te, makambo oyo bakoki kotiela elikya
ezali na minoko na bango te ;
mitema na bango etondi na makambo oyo ebebisaka ;
bakingo na bango ezali lokola malita oyo efongwama,
mpe lolemo na bango elobaka lokuta.

10 Nzambe, lakisa bango ete bazali na mbeba !
Tika ete mabongisi na bango ekweyisa bango ;
bengana bango mpo na masumu na bango ebele
pamba te batombokeli yo.

11 Kasi tika ete baoyo nyonso bayaka kobombama
epai na yo basepela,
bakoyemba mikolo nyonso na esengo
mpe tika obatela bango ;
mpe baoyo balingaka kombo na yo bakosepela kati na yo.

12 Yawe, ya solo opambolaka moto na sembo ;
ozingi bango na bolamu na yo lokola ebende ya makasi
oyo ebatelaka basoda na tango ya bitumba.
Copyright information for LinMNB