Psalms 51

Nasali lisumu epai ya Nzambe

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi. Ayembaki yango tango moprofeta Natan ayaki epai na ye sima ya ekobo oyo asalaki na Bat-sheba.


1 Yokela ngai mawa, Nzambe,
ndenge bolingo na yo ya makasi ezali ;
ndenge mawa na yo ya monene ezali,
longola mabe na ngai

2 Sukola mabe na ngai nyonso ;
petola ngai na lisumu na ngai

3 Pamba te nayebi mabe na ngai,
mpe lisumu na ngai ezali tango nyonso liboso na ngai.

4 Epai na yo
epai na yo kaka ;
mpe nasalaki oyo ezali mabe na miso na yo ;
mpo ete omonana alima tango okoloba
mpe omonana na mabe te tango okosambisa.

5 Ya solo, nazalaki moto ya masumu, wuta na mbotama na ngai ;
Nazali moto ya masumu wuta tango mama na ngai azwaki zemi na ngai.

6 Ya solo, olingaka solo kati na nzoto ;
ateyaka ngai bwanya
na kati na bisika ya mozindo.

7 Komisa ngai peto na nzete ya Izope,
mpe nakokoma peto ;
sukola ngai ; mpe nakokoma pembe
koleka mbula ya mabanga.

8 Tika ngai na yoka esengo mpe na sepela,
tika ete mikuwa oyo obukaki esepela.

9 Bomba elongi na yo liboso ya masumu na ngai,
mpe longola mabe na ngai nyonso.

10 Kela kati na ngai motema ya pete, Nzambe ;
mpe komisa kati na ngai molimo ya sika mpe oyo ezali ngwi.

11 Kobengana ngai te liboso ya elongi na yo ;
mpe kolongola Molimo Mosantu na yo te
kati na ngai.

12 Zongisela ngai esengo ya lobiko na yo ;
mpe pesa ngai molimo oyo ezali na mikano ya malamu,
mpo esimba ngai !

13 Bongo nakoteya babuki ya mibeko na yo
banzela na yo ;
mpe bato ya masumu bakozonga epai na yo !

14 Bikisa ngai na mabe ya makila, Nzambe,
Nzambe oyo abikisaka ngai,
mpe lolemo na ngai ekokumisa bosembo na yo na banzembo.

15 Yawe, fungola bambebo na ngai,
mpe monoko na ngai ekopanza masanzoli na yo.

16 Pamba te olingaka mbeka te,
soki bongo te, mbele nalingaki komemela yo yango ;
osepelaka mpe na likabo ya kotumba te.

17 Mbeka ya Nzambe
ezali molimo oyo ebukani ;
motema oyo ebukani mpe etutami.
Nzambe, otalaka yango pamba te.

18 Kati na bolamu na yo,
salela Siona makambo ya malamu ;
mpe tonga lisusu lopango ya Yeruzalem !

19 Bongo kuna ekozala mbeka ya bosembo,
makabo ya kotumba ya mobimba oyo ekosepelisa yo ;
bongo bakotumbela yo bangombe ya mibali,
likolo ya mesa na yo ya makabo.
Copyright information for LinMNB