Psalms 56

Elongo na Nzambe, kobanga ezali te

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo ya pijon ya banzete ya bamboka ya mosika ; tango bato ya Filistia bakangaki David na Gate.


1 Yokela ngai mawa, Nzambe,
pamba te bato bazali kolanda ngai na makasi penza ;
mokolo mobimba, bazali kobakisa bitumba na bango.

2 Bato batongaka ngai bazali kolanda ngai mokolo mobimba ;
bazali ebele penza. Baoyo bazali kobundisa ngai na lofundu

3 Tango nazali kobanga,
nakotia motema na ngai epai na yo.

4 Na Nzambe,
Nkolo ya maloba oyo nazali kosanzola
na Nzambe nakotia motema ;
nakobanga te ; moto oyo akufaka akosala ngai nini ?

5 Mokolo mobimba bazali kobongola maloba na ngai ;
bakanisaka tango nyonso makambo ya mabe mpo na ngai.

6 Bazali kosala likita,
bazali kobombama, bazali kolandela makolo na ngai,
bazali na posa ya kozwa bomoi na ngai

7 bakoki ata na ndimbola moko te ya bango ;
Na kanda na yo, Nzambe, kweyisa bikolo !

8 Koma bileli na ngai
Bomba mayi na ngai ya miso na eluku na yo ;
naino ekomami na buku na yo te ?

9 Bongo banguna na ngai bakozonga sima
tango nakobelela Nzambe mpo na lisalisi ;
na oyo nde nayebi,
ete Nzambe azali mpo na ngai.

10 Na Nzambe, Nkolo ya maloba
oyo nazali kosanzola.

11 Na Nzambe natiaka motema na ngai ;
nakobanga te ; moto akosala ngai nini ?

12 Nzambe, nazali na se ya bandayi na yo ;
nakopesa yo makabo ya matondi.

13 Pamba te, okangolaki ngai wuta na liwa,
mpe makolo na ngai mpo ebeta libaku te,
mpo nakoka kotambola liboso ya Nzambe,
na moi ya bomoi.
Copyright information for LinMNB