Psalms 57

Nazali na kimia na kati ya banguna na ngai

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na ndenge ya “Koboma te” tango Sawuli azalaki kolanda David, mpe David abombamaki na se ya libulu.


1 Yokela ngai mawa, Nzambe,
yokela ngai mawa ;
pamba te molimo na ngai
ebombamaka epai na yo ;
nakobombama na se ya elilingi ya mapapu na yo,
kino tango bapasi ekoleka.

2 Nakoganga epai ya Nzambe oyo Aleki Likolo,
epai ya Nzambe oyo akokisaka mikano na ye mpo na ngai.

3 Akotinda wuta na likolo mpe akobikisa ngai,
akopamela bato oyo bazali kolanda ngai na makasi penza ;
Nzambe akotindela ngai bolingo na ye
mpe boyengebene na ye.

4 Nazali na katikati ya bantambwe ;
nalali na kati ya banyama oyo eliaka misuni,
bato oyo mino na bango ezali lokola makonga mpe batolo-tolo,
baoyo lolemo na bango ezali mopanga
ya mino makasi.

5 Netolama, Nzambe, kuna na likolo ;
tika ete nkembo na yo ezala likolo ya mokili mobimba !

6 Batiaki monyama mpo na makolo na ngai ;
nagumbamaki na kati ya bapasi.
Batimolaki libulu na nzela na ngai,
kasi bango moko nde bakweyaki na libulu yango.

7 Motema na ngai elendisami, Nzambe,
motema na ngai elendisami ;
nakoyemba mpe nakobetela yo miziki.

8 Lamuka Molimo na ngai !
Lamuka lindanda mpe gitare !
Nakolamusa tongo.

9 Nakokumisa yo, Yawe kati ya bikolo ;
nakoyembela yo na kati ya bato.

10 Pamba te bolingo na yo ezali monene penza,
ekomaka kino na likolo ;
boyengebene na yo ekoma kino na mapata.

11 Netolama, Nzambe, kuna na likolo
tika ete nkembo na yo ezala likolo ya mokili mobimba !
Copyright information for LinMNB