Psalms 6

Yawe salisa ngai

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi ; ayembaki yango na gitare ya basinga mwambe.


1 Yawe, kopamela ngai te kati na kanda na yo,
kopesa ngai etumbu te kati na kosilika na yo

2 Yawe, yokela ngai mawa,
pamba te nazangi makasi.
Yawe bikisa ngai,
pamba te mikuwa na ngai elembi.

3 Molimo na ngai etondi na mitungisi ;
Yawe, kino tango nini ?

4 Yawe, tika kanda na yo mpe kangola bomoi na ngai ;
bikisa ngai mpo na bolingo na yo ya makasi.

5 Pamba te moto oyo akufa akoki kokanisa yo te
kuna na mboka ya bakufi, nani akoki kokumisa yo ?

6 Nalembi mpo na kolela ;
butu mobimba napolisaka mbeto na ngai,
napolisaka esika nalalaka na mayi ya miso na ngai.

7 Miso na ngai ebebi mpo na mawa ;
enuni mpo na bayini na ngai.

8 Bolongwa liboso na ngai,
bino nyonso oyo bosalaka mabe,
pamba te Yawe ayoki kolela na ngai ;

9 Yawe ayoki kosenga na ngai ;
Yawe ayambi libondeli na ngai.

10 Banguna na ngai nyonso bakoyoka soni,
mpe somo monene ekokanga bango ;
bakozonga sima mpe tala ndenge bakoyoka soni noki-noki.
Copyright information for LinMNB