Psalms 60

Tokolonga kaka

Nzembo ya David, mpo na koteya epai ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda oyo babengaka lisi ; tango David abundaki na bato ya Siria ya Mezopotamia mpe bato ya Siria ya Soba, mpe tango Zoabi azongaki mpe alongaki bato ya Edomia nkoto zomi na mibale (12.000), na se ya ngomba ya mungwa.


1 Obwakaki biso, Nzambe,
opanzaki biso,
mpe osilikaki ;
kasi sikʼoyo bongisa biso lisusu !

2 Yo oningisaki mokili, mpe opasolaki yango ;
bongisa bisika na yango oyo epasukaki,
pamba te ezali koningana !

3 Yo olakisi bato na yo batango oyo bazangaki elikya ;
opesaki biso vino oyo elangwisaka.

4 Kasi mpo na bato oyo babangaka yo, otomboli bendele,
mpo bakima liboso ya batolo-tolo

5 Bikisa biso mpe salisa biso
na loboko na yo ya mobali,
mpo ete bato oyo yo olingaka
bakoka kokangolama.

6 Nzambe alobaki wuta na esika na ye ya bosantu :
“Na elonga ; nakokabola Sikemi,
mpe nakotanga molayi ya lobwako ya Sukoti ;

7 Galada ezali ya ngai,
Manase ezali ya ngai ;
Efrayimi ezali ekoti ya libende ya motu na ngai,
mpe Yudea ezali nzete na ngai ya bokonzi.

8 Mowabi ezali sani na ngai nasukolaka ;
likolo ya Edomi nabwakaki sandale na ngai ;
likolo ya bato ya Filistia.” Nakoganga mpo na elonga

9 Nani akomema ngai na vile
oyo etongama makasi ?
Nani akokamba ngai na Edomi ?

10 Ezali yo te, Nzambe, yo oyo obwakaki biso,
mpe obimaka lisusu na mapinga ya basoda na biso te ?

11 Pesa biso lisalisi liboso ya monguna ;
pamba te lisalisi oyo ewutaka na moto
ezali na tina te.

12 Elongo na Nzambe,
tokozua elonga
mpe akonyata banguna na biso.
Copyright information for LinMNB