Psalms 61

Bomba ngai na se ya mapapu na yo

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi ; eyembamaki na Gitare.


1 Yoka koganga na ngai, Nzambe,
tia litoyi na libondeli na ngai.

2 Wuta na suka ya mokili nazali kobenga yo ;
nazali kobenga ndenge motema na ngai elembi koleka ;
mema ngai na likolo ya libanga
oyo ezali likolo mingi koleka ngai.

3 Pamba te, yo ozalaki ebombamelo na ngai,
ndako ya molayi mpe ya makasi,
liboso ya moyini.

4 Nakowumela kovanda
na ndako na yo ya kapo libela ;
mpe nakobombama na se ya mapapu na yo.

5 Pamba te oyokaka bandayi na ngai ;
opesaka ngai bomengo ya bato
oyo babangaka kombo na yo.

6 Bakisa mikolo ya bomoi ya mokonzi,
bambula na ye mpo na ebele ya bato bakobotama.

7 Tika azala na bokonzi
liboso ya Nzambe libela ;
tika bolingo na yo mpe boyengebene na yo ebatela ye

8 bongo nakoyemba tango nyonso masanzoli
mpo na kombo na yo
mpe nakokokisa bandayi na ngai mokolo na mokolo.
Copyright information for LinMNB