Psalms 62

Molimo na ngai ezali na kimia kati na Nzambe

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi ; mpo na Zedutuni.


1 Molimo na ngai ezali kozwa kimia
kati na Nzambe ye moko kaka,
lobiko na ngai ewutaka epai na ye.

2 Ye moko kaka azali libanga na ngai,
mpe lobiko na ngai ;
ye azali ndako na ngai ya makasi,
nakoningana ata moke te.

3 Kino tango nini bokobundisa moto ?
bino nyonso, bolukaki kokweyisa ye
mir oyo etengama,
lopango oyo elingi kokweya ?

4 Batonda na makanisi ya kokweyisa ye
na esika na ye ya likolo ;
basepelaka na lokuta.
Na minoko na bango, bapambolaka,
kasi na kati na mitema na bango balakelaka mabe.

5 Zwa kimia, e e molimo na ngai, na kati na Nzambe ye moko kaka.
Elikya na ngai ewutaka epai na ye.

6 Ye moko kaka nde azali libanga na ngai,
mpe lobiko na ngai ;
ye azali ndako na ngai ya makasi ;
na koningana te

7 Lobiko na ngai mpe lokumu na ngai
ezali kowuta epai na Nzambe ;
ye azali libanga na ngai ya makasi,
ebombamelo na ngai.

8 Botia motema kati na ye tango nyonso, o bato ;
bosopa mitema na bino epai na ye,
pamba te Nzambe azali ebombamelo na biso.

9 Bato pamba bazali kaka mpema,
bato minene bazali kaka lokota ;
soki batie na emekeli, bazali eloko te ;
bango nyonso elongo, bazali kaka mpema.

10 Botia mitema te na kobotola biloko ya bato,
na moyibi te ; to kotia lolendo na biloko ya moyibi ;
ata soki bozwi na yo ezali komata,
kotia motema te likolo na yango.

11 Mbala moko Nzambe alobaki ;
mbala mibale nayokaki :
ete yo, O Nzambe, ozali makasi

12 mpe ete yo, Yawe, ozali bolingo.
Ya solo, okopesa lifuti na moto nyonso
ndenge ya oyo asalaki.
Copyright information for LinMNB