Psalms 64

Batela ngai

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi.


1 Yoka ngai, Nzambe, ndenge nazali kobimisa bileli na ngai ;
batela bomoi na ngai liboso ya monguna
oyo nazali kobanga !

2 Bomba ngai liboso ya likita ya bato ya mabe,
mpe liboso ya ebele ya bato oyo basalaka mabe,
oyo ya mobulu

3 baoyo bapelisaka lolemo na bango lokola mopanga ;
mpe babimisaka maloba na bango
lokola likonga oyo ebomaka,

4 wuta na esika oyo ya kobombama
moto ayebi likambo te ;
babwakelaka ye yango na mbalakata,
mpe babangaka te.

5 Bapesanaka molende kati na mabongisi ya mabe ;
balobaka mpo na kotia mitambo ;
mpe balobaka : “Nani akomona yango ?”

6 Bakanisaka kaka oyo ezangi sembo
mpe balobaka : “Tobongisi
mabongisi ya kitoko penza !”
Ya solo, makanisi ya moto
mpe motema ya moto ezali mozindo mingi.

7 Kasi Nzambe akobwakela bango makonga na ye ;
na mbalakata bakokufa.

8 Akobalusa lolemo na bango etelemela bango moko
mpe emema bango na libebi ;
bato nyonso oyo bakomona bango bakoningisa mitu na litioli.

9 Bato nyonso bakobanga,
mpe bakosakola misala ya Nzambe,
mpe bakososola oyo ye akosala.

10 Tika ete moto na sembo asepela kati na Yawe,
mpe aluka ebombamelo epai na ye ;
tika ete bato nyonso oyo bazali alima na mitema basanzola ye.
Copyright information for LinMNB