Psalms 65

Yawe apesaka biso biloko mingi

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi.


1 Nzambe, masanzoli ezali kozela yo kati na Siona ;
epai na yo bandayi na biso.

2 Yo oyokaka mabondeli ;
bato nyonso bakoya epai na yo.

3 Tango masumu efinaki biso
yo olimbisaki mabe na biso.

4 Mapamboli na bato oyo yo opona
mpe omemi bango pene-pene,
mpo bavanda na lopango na yo !
Tokotonda na biloko ya kitoko ya Ndako na yo,
Ndako na yo ya bosantu.

5 Ozongiseli biso eyano
na lolenge ya kobanga na misala ya bosembo,
Nzambe, Mobikisi na biso,
elikya ya basuka nyonso ya mokili,
mpe ya bibale minene ya mosika penza.

6 Oyo asala bangomba na nguya na yo,
omilatisa yo moko na makasi

7 Olembisaka makelele ya ba ebale minene
makelele ya bambonge na yango,
mpe mobulu ya bikolo.

8 Baoyo bavandaka mosika
bakobanga makamwisi na yo ;
bisika tongo etanaka mpe butu elalaka
obengaka liboso banzembo ya esengo.

9 Oyaka kotala mokili,
osopelaka yango mayi,
mpe otondisaka yango na biloko ebele.
Ebale ya Nzambe etondi na mayi,
obongisaka bambuma mpo na bato.
Pamba te, yo nde opesaki mitindo.

10 Otiaka mayi na mikala na yango,
olalisaka mwa bangomba na yango,
okomisaka yango pete na mbula mike,
mpe opambolaka bambuma na yango.

11 Osilisaka mobu na bolamu na yo ;
mpe biloko mingi elekaka na motuka na yo.

12 Bisika matiti ebimaka na esobe ekomi mingi penza ;
bangomba etondi na esengo.

13 Bisika matiti ebimaka na esobe etondi na bameme,
mpe lubuaku etondi na bambuma ;
ezali koganga na esengo mpe koyemba.
Copyright information for LinMNB