Psalms 66

Lokumu na Nzambe mpo akangoli biso

Nzembo epai ya mokambi ya bayembi.

1Ganga na esengo epai ya Nzambe, mokili mobimba !

2 Boyemba nkembo mpo na kombo na ye ;
bopesa ye nkembo mpe masanzoli.

3 Boloba na Nzambe :
Misala na yo ezali ya kokamwa !
Ndenge nguya na yo ezali monene banguna na yo
bazali kongunzama liboso na yo.

4 Mokili mobimba ekokumbamela yo,
bakoyemba masanzoli epai na yo ;
bakoyemba masanzoli epai na kombo na yo.

5 Boya mpe botala oyo Nzambe asala,
ndenge lolenge ya somo ezali
na misala na ye kati na bato.

6 Akomisaki ebale monene mabele ya kokawuka,
bongo bato bakatisaki mayi na makolo ;
boya tosepela kati na ye.

7 Na nguya na ye, azali kokamba
mpo na libela na libela ;
miso na ye etalaka bikolo ;
tika ete batomboki batombokela ye te.

8 Bosanzola Nzambe na biso, e e bato ;
Tika ete makelele ya masanzoli na ye eyokana.

9 Ye moto abatelaki bomoi na biso ;
mpe atikaki te ete makolo na biso ekende na moselu.

10 Pamba te yo, Nzambe, omekaki biso ;
opetolaki biso lokola palata.

11 Okotisaki biso na boloko,
mpe omemisaki biso mikumba ya kilo penza na loketo.

12 Otikaki ete bato bamatela biso na mitu ;
tolekaki na kati ya moto mpe na kati ya mayi ;
kasi omemaki biso na esika oyo etondi na biloko ebele.

13 Nayaki na Ndako na yo na makabo ya kotumba ;
mpe nakokokisa bandayi na ngai
epai na yo ;

14 bandayi oyo bambebo na ngai elakaki
mpe oyo monoko na ngai elobaki
na tango nazalaki na minyoko.

15 Nakopesa yo mbeka
ya banyama ya mafuta,
mpe makabo ya bameme ya mibali ;
nakopesa yo makabo ya bangombe ya mibali
mpe bantaba ya mibali.

16 Boya mpe boyoka,
bino nyonso oyo bobangaka Nzambe ;
tika ete nayebisa bino makambo oyo asalaki
mpo na ngai.

17 Nabelelaki epai na ye na monoko na ngai ;
masanzoli na ye ezalaki na lolemo na ngai

18 Soki nalengelaki lisumu
na motema na ngai,
Yawe alingaki te koyoka.

19 Kasi ya solo Nzambe ayoka ;
mpe ayokaki mongongo na ngai na libondeli.

20 Masanzoli ezala epai na Nzambe,
oyo abwakaki libondeli na ngai te ;
to alongolaki bolingo na ye te epai na ngai.
Copyright information for LinMNB