Psalms 67

Tika ete bato nyonso bakumisa Nzambe

Nzembo epai ya mokambi ya bayembi ; eyembamaki na gitare.


1 Tika ete Nzambe amonisa ngolu na ye epai na biso
mpe apambola biso,
mpe elongi na ye engengela biso ;

2 mpo ete banzela na yo eyebana na mokili,
lobiko na yo kati na bikolo nyonso.

3 Tika ete bato basanzola yo, Nzambe ;
tika ete bato nyonso basanzola yo !

4 Tika ete bikolo esepela,
mpe eyemba na esengo ;
pamba te okambaka bato na bosembo nyonso,
mpe atambwisaka bikolo oyo ezali na mokili.

5 Tika ete bato basanzola yo, Nzambe ;
tika ete bato nyonso basanzola yo !

6 Bongo mabele ekobota bambuma na yango ;
mpe Nzambe, Nzambe na biso akopambola biso.

7 Nzambe akopambola biso ;
mpe basuka nyonso ya mokili mobimba bakobanga ye.
Copyright information for LinMNB