Psalms 68

Elonga ya Nzambe

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi.


1 Tika ete Nzambe atelema ;
tika ete banguna na ye bapalangana ;
mpe tika ete baoyo bayinaka ye
bakima liboso na ye.

2 Ndenge milinga elimwaka, tika olimwisa bango ;
ndenge mafuta enyangwamaka na moto.
Tika bato mabe babeba liboso ya Nzambe

3 Kasi tika ete bato na sembo basepela ;
mpe batonda na esengo liboso ya Nzambe ;
tika ete basepela mingi penza.

4 Boyembela Nzambe,
bayemba masanzoli epai ya kombo na ye,
bonetola ye oyo azali kotambola likolo ya mapata,
kombo na ye ezali Yawe ;
mpe bosepela liboso na ye !

5 Tata ya bana oyo bakufela baboti
molobeli ya basi oyo bakufela mibali.
Ezali Nzambe kati na ndako na ye ya bosantu.

6 Nzambe apesaka libota na bato
oyo batikala bango moko ;
akambaka bakangami na koyemba ;
kasi batomboki bavandaka na mabele ya kokawuka.

7 Tango abimaki
liboso ya bato na ye, Nzambe,
tango atambolaki na esobe,

8 mokili eninganaki ;
likolo esopaki mbula na se,
liboso ya Nzambe, moto moko ya Sinayi
liboso ya Nzambe ya Isayele !

9 Opesaki mbula ya mike-mike ebele, Nzambe,
olendisaki bomengo na yo.

10 Bato na yo bavandaki kuna ;
Nzambe, na bolamu na yo,
obongisaka biloko mpo na mobola.

11 Yawe alobaki liloba ;
mpe baoyo bapanzaki sango yango
bazalaki ebele penza.

12 Bakonzi mpe mapinga ya basoda ekimaki na lombangu ;
na kati ya Kan, bato bakabolaki biloko
oyo bazwaki na etumba ;

13 Boni, bozali na bango na pokwa,
bolali kati na bisika banyama baliaka.
Mapapu ya pijon na ngai bapakola yango palata,
basala na yango na wolo oyo ezali kongenga.

14 Tango ya nguya nyonso
apanzaki bakonzi na mabele,
ezalaki lokola mbula ya mabanga ya pembe konoka na Zalmon.

15 Bangomba ya Basan ezali bangomba ya lokumu ;
bangomba ya Basan ezali basonge-songe !

16 Mpo na nini ozali koyoka zua, e e bangomba ya basonge-songe,
na ngomba oyo Nzambe apona
mpo na kozala mokonzi
kuna Yawe ye moko akovanda libela na libela.

17 Mituka ya Nzambe ezali ba zomi ya bankoto,
mpe bankoto na bankoto ;
Yawe azali koya kati na Sinayi na Esika na ye ya bosantu

18 Tango omataki na likolo,
omemaki baoyo bazalaki bakangami na molongo na yo ;
ozwaki makabo epai ya bato,
ata epai ya batomboki,
mpo ete yo, Yawe Nzambe okoka kovanda kuna.

19 Masanzoli ezala na Yawe,
na Nzambe Mobikisi na biso,
ye oyo amemaka mikumba na biso mokolo na mokolo.

20 Nzambe na biso,
azali Nzambe oyo abikisaka ;
Yawe, ye oyo asalaka oyo alingi,
abikisaka na liwa.

21 Ya solo, Nzambe akopanza mitu ya banguna na ye,
mitu ya suki ya baoyo bazali kotambola kati na masumu na bango.

22 Nkolo alobi :
“Nakomema bango wuta na Basan ;
nakomema bango wuta na se ya ebale monene ;

23 mpo ete adindisa makolo na yo na makila ya bayini na yo ;
mpo ete lolemo na bambwa na yo
ezwa ndambo na yango.”

24 Kotambola na yo emonanaki, Nzambe
kotambola ya Nzambe na ngai,
mpe Mokonzi na ngai,
kati na Esika ya bosantu.

25 Bayembi bazalaki na liboso,
sima na bongo bato oyo babetaka bagitare,
elongo na bilenge basi
oyo babetaka bambunda ya mike.

26 Bosanzola Nzambe kati na Mayangani ya monene ;
bosanzola Yawe, lisanga ya Isayele !

27 Kuna nde ezala libota ya moke ya Benzame,
oyo ezalaki kotambolisa bango ;
kuna nde ezalaki bana ya bakonzi ya Yudea
bana ya bakonzi ya Zabuloni mpe bana ya bakonzi ya Nefitali.

28 Nzambe, benga nguya na yo ;
lakisa biso makasi na yo, Nzambe,
ndenge osalaki liboso.

29 Mpo na ndako na yo ya Yerusalem,
bakonzi bakomemela yo makabo

30 Pamela nyama na kati ya matiti ya ebale,
bangombe ya mibali,
kati ya bana ya ngombe
nyama oyo evandaka na kati ya matiti ya ebale  : elakisi Ezipito ; bangombe ya mibali : elakisi bato mineneya Ezipito ; mpe bana ya ngombe : elakisi bakonzi ya Ezipito.
. Ya bikolo.
Amikitisaki, akoki komema biteni ya palata.
Panza bikolo oyo basepelaka na bitumba.

31 Batindami bakoya wuta na Ezipito ;
Kush akomitia ye moko na se ya bokonzi ya Nzambe

32 Boyembela Nzambe, bokonzi ya mokili ;
boyemba masanzoli mpo na Yawe ;

33 epai ya moto oyo azali kotambola likolo ya mpunda na likolo,
na likolo ya kala.
Oyo ayokisi lokito na mongongo ya nguya.

34 Bosakola nguya ya Nzambe ;
oyo lokumu na ye ezali likolo ya Isayele,
nguya na ye ezali na kati ya mapata.

35 Yo ozali sukisa, Nzambe,
kati na Esika na yo ya bosantu :
Nzambe ya Isayele ye nde apesaka
makasi mpe nguya na bato na ye.
Masanzoli ezali epai ya Nzambe !
Copyright information for LinMNB