Psalms 7

Yawe longisa ngai

Nzembo ya mawa, ya David. Ayembelaki Yawe mpo na Kusi, moto yalibota Benzamite.


1 Yawe Nzambe na ngai,
nazali koluka esika ya kobombama epai na yo ;
bikisa ngai mpe kangola ngai na baoyo bazali kolanda ngai,

2 mpo ete bapasola ngai te
lokola ntambwe oyo ezali kopasola nyama,
mpe moto ya kobikisa nyama yango azali te.

3 Yawe Nzambe na ngai,
soki nasalaki likambo yango,
soki mabe ezali na maboko na ngai,

4 soki nazongisaki mabe
na moto oyo azalaki na kimia na ngai ;
soki nabotolaki biloko ya moyini na ngai kaka pamba

5 wana tika ete monguna na ngai
alanda ngai mpe akanga ngai ;
aniata bomoi na ngai na mabele,
mpe alalisa ngai na putulu.

6 Yawe, telema kati na kanda na yo ;
telemela kosilika ya banguna na ngai.
Lamuka Nzambe na ngai ;
mpe tika olongisa ngai.

7 Tika ete lisanga ya bato ebele ezinga yo ;
mpe kamba bango wuta na likolo ;

8 tika ete Yawe asambisa bato.
Yawe, sambisa ngai na ndenge ya bosembo na ngai,
mpe na ndenge ya boyengebene na ngai.

9 Nzambe ya bosembo,
yo moto otalaka makanisi mpe mitema ya bato,
sukisa mayele ya mabe ya bato na mabe,
mpe lendisa moto na sembo.

10 Nzambe oyo aleki likolo
ye nde ebende ya makasi oyo ebatelaka ngai,
ye oyo abikisaka bato ya mitema ya bosembo

11 Nzambe azali zuzi ya sembo,
Nzambe oyo atombokaka mikolo nyonso.

12 Soki moto na mabe abongoli motema na ye te,
Yawe azali kotia mopanga na ye mino,
azali kobongisa tolotolo na ye ;

13 asili kobongisa bibundeli na ye oyo ebomaka ;
mpe azali kongalisa makonga na ye ya moto.

14 Tala, moto na mabe azali kobongisa makambo ya mabe ;
azwi zemi ya makambo ya mabe, mpe aboti lokuta.

15 Atimoli libulu, atimoli yango molayi penza ;
kasi akweyi na libulu oyo ye moko atimolaki.

16 Mabe na ye ezongeli ye moko,
mpe mobulu na ye ekweyi likolo ya motu na ye moko.

17 Nakozongisa matondi epai na Yawe mpo na bosembo na ye ;
mpe nakoyemba masanzoli mpo na kombo na Yawe,
oyo Aleki Likolo.
Copyright information for LinMNB