Psalms 74

Kolela mpo na kopanzana ya Esika ya bosantu

Nzembo ya Asaf


1 mpo na nini osundoli biso libela, Nzambe ?
Mpo na nini kanda na yo ezali kongala likolo
ya bameme ya lopango na yo ?

2 Kanisa bato na yo
oyo ozwaki wuta kala ;
libota ya libula na yo oyo olongolaki na bowumbu
ngomba ya Siona,
esika ozalaki kovanda.

3 Balusa makolo na yo na bisika ebebi libela ;
libebi nyonso oyo monguna amemaki
na Esika ya bosantu.

4 Bayini na yo bazali konguluma
na kati ya esika oyo okutanaka na biso ;
batie bendele na bango lokola bilembo.

5 Bazali lokola bato oyo basimbi epasola
mpo na kokata banzete na zamba.

6 Bapanzi mabaya ya porte oyo bakoma-koma,
na bipasola mpe bamarto na bango.

7 Batumbi Esika na yo ya bosantu nyonso ;
babebisi esika kombo na yo evandaka.

8 Balobaki na se ya mitema na bango
“Tokopanza bango mobimba !”
Batumbi bisika nyonso
oyo bakumbamelaka Nzambe
na mokili.

9 Bapesi biso ata elembo moko ya kokamwisa te
baprofeta bazali lisusu te ;
mpe moko te na kati na biso ayebi
kino tango nini oyo !

10 kino tango nini
monguna akosakana na yo, Nzambe ?
akotiola kombo na yo libela ?

11 Mpo na nini akangi loboko na yo
loboko na yo ya mobali ?
Zua yango na masusa ya elamba na yo mpe bebisa bango.

12 Kasi yo Nzambe, ozali mokonzi na ngai wuta kala ;
Omemaka lobiko na mokili.

13 Ezalaki yo nde opasolaki ebale
na nguya na yo ;
opanzaki mitu ya bilima kati na mayi.

14 Ezalaki yo nde opanzaki mitu ya Leviatani
Leviatani  : elima ya mayi ya mitu sambo.
 ;
mpe opesaki ye na banyama ya esobe
mpo balia ye.

15 Ezalaki yo moto ofungolaki esika mayi ebandaka
mpe mayi oyo etiolaka makasi ;
okawusaki ba ebale oyo etiolaka mpo na libela.

16 Moi ezali ya yo, butu mpe ezali ya yo ;
Yo moto osalaki sanza mpe moi.

17 Ezalaki yo nde moto otiaki bandelo nyonso ya mokili ;
yo moto osalaki tango ya malili makasi
mpe ya moi makasi.

18 Kanisa ndenge monguna asakanaki na yo, Yawe ;
kanisa ndenge bazoba batiolaki kombo na yo !

19 Kokaba bomoi ya pijon na yo te
na maboko ya banyama ya mabe ;
kobosana mpo na libela te,
bomoi ya bato na yo oyo bazali na pasi

20 Tala Boyokani oyo !
Pamba te, banganda ya mobulu etondi na bisika
ya molili na mokili.

21 Kotika te ete moto oyo bazali konyokola
asila lokumu ;
tika ete moto ya mobola mpe mokeleli
bakumisa kombo na yo.

22 Telema, Nzambe mpe omilongisa !
Kanisa ndenge nini bazoba bazali kosakana na yo mokolo mobimba
bazali kofinga yo mikolo nyonso !

23 Kobosana kowelela ya bayini na yo te ;
makelele ya banguna na yo
ezali kaka kobakisama !
Copyright information for LinMNB