Psalms 78

Makambo oyo Nzambe asala

Nzembo ya Asaf. Etinda.


1 Bato na ngai, boyoka malakisi na ngai ;
botia matoyi na maloba ya monoko na ngai !

2 Nakofungola monoko na ngai
mpo na koloba na masapo ;
nakosakola makambo oyo ebombama makambo ya kala.

3 Makambo oyo toyokaki mpe oyo toyebaki ;
makambo oyo batata na biso bayebisaki biso.

4 Tokobombela yango bana na bango te ;
tokoyebisa na baoyo bakoya sima
misala ya Yawe oyo ebongi na masanzoli,
nguya na ye mpe makambo ya kokamwa oyo ye asalaki.

5 Atiaki mitindo na ye mpo na Zakobi ;
abongisaki mibeko kati na Isayele,
atindaki batata na biso bateya yango
na bana na bango,

6 Na bongo bato oyo bakoya sima bakoyeba yango,
mpe bana oyo bakobotama bayeba yango na bana oyo babotami naino te ;
mpe na tango na bango, bakolobela bana na bango,

7 mpo ete batia motema na bango na Nzambe,
mpe bakoki kobosana misala na ye te,
kasi babatela malako na ye ;

8 bakozala lokola batata na bango te,
bato oyo bazalaki batomboki mpe bazangaki botosi,
baoyo mitema ezalaki sembo te epai na Nzambe,
mpe milimo na bango ezalaki boyengebene te liboso na ye.

9 Bato ya Efrayimi,
atako bazalaki na tolo-tolo,
kasi bazongaki sima na mokolo ya etumba.

10 Babatelaki Boyokani ya Nzambe te ;
mpe baboyaki kowumela na mibeko na ye.

11 Babosanaki oyo ye asalaki ;
makambo ya kokamwa oyo alakisaki bango.

12 Asalaki makamwisi
na miso ya batata na bango na mokili ya Ezipito,
na mokili ya Sowani.

13 Akabolaki ebale monene mpe alekisaki bango kati na yango ;
atelemisaki mayi ngwi lokola mur.

14 Azalaki kotambolisa bango na lipata na moi ;
mpe na kongenga ya moto butu mobimba.

15 Apasolaki mabanga na esobe,
mpe apesaki bango mayi mingi
lokola bibale minene

16 Abimisaki mayi wuta na libanga ;
mpe atiolisaki mayi lokola ba-ebale.

17 Kasi bakobaki kosala masumu liboso na ye ;
kotombokela na esobe ye oyo Aleki Likolo.

18 Bamekaki Nzambe na mokano na bango,
na kosengaka biloko ya kolia na molende

19 Balobaki mabe mpo na Nzambe ;
balobaki : “Boni, Nzambe akoki kobongisa
mesa kati na esobe ?

20 Tango, abetaki libanga, mayi ebimaki,
mayi etondaki mingi.
Kasi akoki kopesa biso biloko ya kolia ?
Akoki kopesa bato na ye mosuni ?”

21 Tango Yawe ayokaki bango,
asilikaki mingi penza ;
moto na ye ezikisaki Zakobi,
mpe kanda na ye ya makasi ekweyelaki Isayele.

22 Pamba te, bandimelaki Nzambe te,
to batiaki mitema na bango na kokangola na ye te.

23 Nzokande apesaki malako na mapata,
mpe afungolaki baporte ya likolo ;

24 anokiselaki bango “mana” mpo balia ;
apesaki bango mbuma ya Likolo.

25 Bato baliaki lipa ya baanzelu ;
atindelaki bango biloko nyonso oyo bakokaki kolia.

26 Wuta na likolo, atindaki mopepe ya Este,
mpe akambaki mopepe ya Sude na nguya na ye.

27 Anokiselaki bango misuni
lokola putulu,
bandeke lokola zelo ya ebale.

28 Akweyiselaki bango yango,
pembeni-pembeni ya bandako na bango nyonso ya kapo.

29 Baliaki kino batondaki penza ;
pamba te apesaki bango nyonso
oyo basengaki na molende.

30 Liboso ete bapesa mokongo na bileyi oyo basengaki na molende
mpe ezalaki naino na monoko na bango ;

31 kanda ya Nzambe ekweyelaki bango ;
abomaki bilombe kati na bango,
mpe abomaki bilenge mibali ya Isayele.

32 Kasi na nyonso oyo, bakobaki kosala masumu ;
atako misala na ye ya kokamwa, bandimaki te.

33 Bongo asilisaki mikolo na bango
na pamba,
mpe bambula na bango kati na somo.

34 Tango nyonso oyo azalaki koboma bango,
babandaki koluka ye ;
bazalaki kobaluka noki-noki lisusu epai na ye.

35 Bongo bakanisaki lisusu ete,
Nzambe nde azali libanga na bango ;
ete Nzambe Oyo Aleki Likolo
azalaki mokangoli na bango.

36 Bongo bazalaki kokosa ye na maloba sukali ;
bazalaki kokosa ye na lolemo na bango.

37 Mitema na bango ezalaki sembo te epai na ye ;
bazalaki bayengebene na Boyokani na ye te.

38 Nzokande azalaki moto na mawa,
alimbisaki mabe na bango
mpe abebisaki bango te ;
mbala mingi azalaki kokanga motema tango na tango
azalaki kokitisa kanda na ye
mpe azalaki kolakisa kanda makasi na ye nyonso te.

39 Akanisaki lisusu ete bazalaki kaka mosuni,
mopepe oyo elekaka oyo ekoki kozonga te.

40 Mbala mingi batombokelaki ye na esobe,
mpe batumbolaki ye na esika
oyo bato bavandaka te.

41 Mbala na mbala bazalaki komeka Nzambe ;
koyokisa Mosantu ya Isayele kanda.

42 Bakanisaki lisusu te nguya na ye,
mokolo akangolaki bango na monyokoli.

43 Mokolo amonisaki bilembo ya makamwisi na ye na Ezipito,
makambo na ye ya kokamwa na mokili ya Sowani.

44 Abongolaki ba-ebale na bango na makila ;
bakokaki te komela na bamayi na bango.

45 Atindaki liboke ya banzinzi oyo eliaki bango,
mpe magorodo oyo ebebisaki bango.

46 Apesaki bambuma ya bilanga na bango na mabanki,
mosala ya maboko na bango na mankonko.

47 Abebisaki bilanga na bango ya vino
na mbula ya mabanga ;
mpe banzete na bango ya Sikomoro
na mpio ya makasi.

48 Akabaki etonga ya bameme na bango na mbula ya mabanga,
mpe bameme na bango na kongenga ya kake.

49 Atindelaki bango kanda na ye ya moto,
kanda na ye ya makasi, koyinana,
nkele mpe mampinga ya baanzelu
oyo babetaka

50 Abongisaki nzela mpo na kanda na ye ;
abatelaki bango na liwa te,
kasi akabaki bango na maladi ya mabe.

51 Abomaki bana mibali nyonso ya liboso ya Ezipito,
mbuma ya liboso ya makasi na ba ndako ya kapo ya Sham.

52 Abimisaki bato na ye lokola bameme ;
akambaki bango lokola
meme na kati ya esobe.

53 Akambaki bango na kimia nyonso,
na bongo bazalaki kobanga te ;
kasi ebale monene emelaki banguna na bango.

54 Bongo akotisaki bango na bandelo ya mabele na ye ya bosantu,
ngomba oyo loboko na ye ya nguya ezwaki.

55 Abenganaki bikolo liboso na bango ;
akabolaki mabele na bango epai na bango lokola libula ;
avandisaki mabota ya Isayele na bandako na bango.

56 Kasi bamekaki Nzambe
mpe batombokelaki Oyo Aleki Likolo ;
babatelaki bikateli na ye te.

57 Lokola batata na bango bazalaki sembo te
mpe bazalaki na kondima te ;
bakokaki kotiela bango motema te lokola tolo-tolo oyo etengama.

58 Bayokisaki ye kanda na bisika na bango oyo etombwana ;
mpe bapelisaki zuwa na ye
mpo na bikeko na bango.

59 Tango Nzambe ayokaki bango,
asilikaki mingi penza,
asundolaki Isayele mobimba.

60 Asundolaki
ndako ya kapo ya bokutani ya Silo ;
ndako ya kapo esika avandaki kati na bato.

61 Atindaki sanduku ya makasi na ye na bowumbu,
kongenga na ye na maboko ya monguna.

62 Akabaki bato na ye na mopanga,
mpe asilikelaki makasi libula na ye.

63 Moto ezikisaki bilenge mibali na bango,
mpe bilenge basi na bango bazalaki lisusu te
banzembo ya libala.

64 Babomaki banganga Nzambe na bango
na mopanga ;
mpe basi oyo bakufela mibali bakokaki kolela te.

65 Bongo Nkolo alamukaki lokola moto awuti na pongi,
lokola moto alamuki na kwiti ya vino.

66 Azongisaki banguna na ye sima ;
ayokisaki bango soni ya seko.

67 Bongo asundolaki ndako ka kapo ya Zozefi,
mpe aponaki te libota ya Efrayimi.

68 Kasi aponaki libota ya Yudea,
ngomba ya Siona oyo alingaki.

69 Atongaki Esika na ye ya bosantu
lokola esika etombwama,
lokola mokili oyo asalaki mpo na libela.

70 Aponaki David, mosali na ye,
mpe azwaki ye wuta na lopango ya bameme.

71 Azuaki ye na esika
azalaki kobokola bameme,
mpo azala mobateli ya bato na ye, Zakobi, Isayele libula na ye.

72 Bongo David abatelaki bango na boyengebene na motema ;
mpe akambaki bango na maboko ya mayele.
Copyright information for LinMNB