Psalms 79

Yeruzalem epanzani

Nzembo na Asaf.


1 Nzambe, bikolo bikoti na makasi na libula na yo ;
ebebisaki Ndako na yo ya bosantu,
mpe bamemaki Yerusalem na mabanga.

2 Bapesi banzoto ya bibembe ya basali na yo
lokola biloko ya kolia na bandeke ya likolo,
mpe banzoto ya basantu epai ya banyama ya mokili.

3 Basopaki makila lokola mayi,
zinga-zinga nyonso ya Yeruzalem ;
mpe moto ya kokunda azali te.

4 Tokomi litioli epai ya bato oyo bazali mpembeni na biso,
mpe eloko ya koseka epai ya bikolo
oyo ezingi biso.

5 Kino tango nini Yawe ?
Okozala kaka na kanda tango nyonso ?
Kino tango nini zuwa na yo ekopela
lokola moto ?

6 Sopa kanda na yo ya makasi likolo ya bikolo oyo eyebi yo te,
mpe likolo ya bokonzi oyo ebengaka kombo na yo te.

7 Pamba te baliaki Zakobi,
mpe bapanzaki mokili na ye.

8 Kotangela biso te
masumu ya batata ;
tika ete mawa na yo ekomela biso noki penza,
pamba te tokomi na pasi oyo ezangi elikya.

9 Salisa biso, Nzambe Mobikisi na biso,
mpo na nkembo ya kombo na yo ;
kangola biso mpe limbisa masumu na biso,
mpo na kombo na yo.

10 Mpo na nini bikolo ezali koloba :
“Nzambe na bango azali wapi ?”
Liboso ya miso na biso lakisa kati na bikolo
ete yo ozongisaka mabe
mpo na nini makila ya basali na yo oyo esopanaki

11 Tika ete kolela na se-se ya bato ya boloko
ekoma liboso na yo ;
na makasi ya loboko na yo, batela
baoyo bakatela etumbu ya liwa.

12 Zongisela ba oyo bazali
pembeni-pembeni na biso kofinga, mbala sambo,
pamela oyo bawololaki yo, Yawe.

13 Bongo biso, bato na yo, bameme oyo oliesaka,
tokosanzola yo tango nyonso ;
na mabota na mabota, tokoloba masanzoli na yo.
Copyright information for LinMNB