Psalms 8

Monene ya Nzambe mpe ya moto

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi ; ayembaki yango nalindanda ya bato ya Gate.


1 Yawe, Nkolo na biso,
tala ndenge kombo na yo ezali na lokumu mingi ;
kati na mokili mobimba, otia nkembo na yo likolo ya lola.

2 Na minoko ya bana mpe na minoko ya bana oyo bamelaka mabele,
otindaki ete masanzoli na yo ebima
mpo na banguna na yo,
mpo ete okangisa minoko ya bayini na yo,
mpe ya baoyo bazongisaka mabe na mabe.

3 Tango natalaka likolo na yo, mosala ya misapi na yo,
sanza mpe minzoto oyo otia na bisika na yango.

4 Moto azali eloko nini mpo okanisa ye ?
Mpe mwana na moto azali nini mpo obatela ye ?

5 Osalaki ye mwa moke na se ya baanzelu
anzelu to bikelamu ya likolo

olatisaki ye na nkembo mpe na lokumu ;

6 okomisaki ye mokonzi likolo ya misala ya maboko na yo ;
otiaki biloko nyonso na se ya makolo na ye :

7 bameme mpe bangombe nyonso,
mpe banyama ya zamba,

8 bandeke ya likolo mpe bambisi ya ebale monene,
na biloko nyonso oyo etambolaka na banzela ya ba-ebale.

9 Yawe, Nkolo na biso,
tala ndenge kombo na yo ezali na lokumu mingi
na mokili mobimba !
Copyright information for LinMNB