Psalms 80

Ee Yawe, kino tango nini ?

Nzembo ya Asaf, epai ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda oyo babengaka Lisi.


1 Yoka biso, Mobateli ya Isayele,
yo moto okambaka Zozefi lokola etonga ya bameme ;
yo moto ovandi na kiti ya bokonzi na kati-kati ya baseribin,
ngenga !

2 liboso ya Efrayimi,
Benzame mpe Manase olamusaki nguya na yo ;
yaka mpe bikisa biso !

3 Zongisa biso ndenge tozalaki, Nzambe,
ngengisela biso elongi na yo, mpe tokobika.

4 Ee Yawe, Nzambe na nguya nyonso,
kino tango nini kanda ekongala mpo na losambo ya bato na yo ?

5 Oleyisaki bango lipa ya mayi ya miso ;
omelisaki bango mayi ya miso na kopo etonda.

6 Okomisaki biso esika ebimisaka koswana
ya baoyo bazali pembeni na biso ;
mpe banguna na biso bakomi kosakana na biso.

7 Zongisa biso ndenge tozalaki, Nzambe na Nguya nyonso ;
Tika ete elongi na yo engengisa biso mpe tokobika !

8 Opikolaki nzete moko ya vino wuta na Ezipito ;
obenganaki bikolo, mpe olonaki yango.

9 Obongiselaki yango mabele ;
mpe ebimisaki misisa, mpe etondisaki mokili.

10 Bangomba ezalaki ya kozipama na elili na yango,
Sedele ya nguya na bitape na yango.

11 Ebimisaki bitape na yango kino na ebale monene,
mpe mwa banzete na yango kino na ebale.

12 Mpo na nini opanzi bamur na yango
na bongo mpo ete baoyo nyonso bakoleka wana
babuka bambuma na yango ?

13 Ngulu ya zamba ezali kobebisa yango ;
mpe bikelamu ya bilanga ezali kolia yango.

14 Zongela biso, Nzambe ya nguya nyonso !
wuta na likolo, tala na se mpe mona !
nzete ya vino oyo ;

15 mosisa oyo loboko na yo ya mobali elonaki,
mwana oyo obokolaki mpo na yo moko.

16 Bakataki vino na yo,
mpe batumbaki yango na moto ;
na pamela na yo bato na yo bazali kobeba.

17 Tika ete loboko na yo ezala likolo ya moto oyo
avandi na loboko na yo ya mobali,
mwana ya moto oyo obokolaki
mpo na yo moko.

18 Bongo tokozala lisusu mosika na yo te ;
zongisela biso lisusu bomoi,
mpe tokobenga kombo na yo.

19 Zongisa biso ndenge tozalaki, Yawe Nzambe ya nguya nyonso,
Tika ete elongi na yo engengisa biso mpe tokobika !
Copyright information for LinMNB