Psalms 84

Nzambe, nazali na posa ya Ndako yo

Nzembo ya bana ya Korea epai ya mokambi ya bayembi ; eyembamaki na lindanda ya bato ya Gate.


1 Tala ndenge kitoko ezali na esika na yo ovandaka,
Yawe ya nguya nyonso !

2 Molimo na ngai elingi mpe ezali na posa
mpo na lopango ya Yawe ;
motema na ngai mpe mosuni ya nzoto na ngai ezali koganga
mpo na Nzambe ya bomoi

3 Ata ndeke ya moke ezwaka ndako,
mpe ndeke oyo babengaka Irondele ezwaka zala na yango,
epai etiaka bana na yango ;
pene-pene ya mesa oyo batumbelaka yo mbeka,
Yawe ya nguya nyonso,
Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai.

4 Mapamboli ezali na baoyo bavandaka na Ndako na yo ;
bango basanzolaka yo tango nyonso !

5 Mapamboli ezali na baoyo makasi na bango ezali kati na yo ;
baoyo babongisa mitema na bango mpo na
kokende kosambela na Esika ya bosantu.

6 Lokola balekaka na se ya ngomba ya Baka,
bakomisaka esika yango esika ebimisaka mayi ;
mbula mpe ezipaka yango na liziba ya mayi.

7 Bokasi na bango ebakisamaka
kino moko na moko amonana liboso ya Nzambe na Siona

8 Tia litoyi na mabondeli na ngai, Yawe, Nzambe ya nguya nyonso,
yoka ngai,
Nzambe ya Zakobi !

9 Tala epai ya ebende na biso ya makasi
oyo ebatelaka Nzambe ;
tala na ngolu epai ya mopakolami na yo.

10 Mokolo moko na lopango na yo, eleki malamu koleka
mikolo nkoto epai mosusu.
Nakolinga kutu kozala mokengeli ya porte
na Ndako ya Nzambe na ngai,
na esika ya kovanda na bandako ya kapo ya bato ya mabe.

11 Pamba te, Yawe Nzambe azali moi
mpe ebende ya makasi oyo ebatelaka ;
Yawe apesaka ngolu mpe lokumu ;
ezali na eloko moko te ya malamu akoki kopimela baoyo
batambolaka na pamela moko te.

12 Yawe ya nguya nyonso,
mapamboli epai na moto oyo atiaka motema na ye epai na yo !
Copyright information for LinMNB