Psalms 89

Ee Nzambe, bolamu ya kala ezali wapi ?

Nzembo ya Etani, moto ya Ezirakite.


1 Nakoyemba bolingo ya monene ya Yawe libela na libela ;
na monoko na ngai na koyebisa boyengebene na yo
na batu ya tango nyonso.

2 Nakosakola ete bolingo na yo
etelemi ngwi libela na libela,
ete etiaki boyengebene na yo na likolo.

3 Olobaki : “Natiaki boyokani na moto
na ngai napona ;
nalapaki ndayi na David, mosali na ngai :

4 Nakotia libota na yo libela na libela ;
mpe nakokomisa ngwi kiti na yo ya bokonzi
na tango ya mabota nyonso.”

5 Likolo ekosanzola makambo na yo ya kokamwa, Yawe,
boyengebene na yo na lisanga ya basantu.

6 Pamba te nani, kuna na mapata,
akoki kokokana na Yawe ?
Nani azali lokola Yawe
kati na bikelamu ya likolo ?

7 Kati na lisanga ya basantu, babangi Nzambe mingi ;
azali somo koleka bango nyonso bazingi ye.

8 Ee Yawe, Nzambe na nguya nyonso
nani azali lokola yo ?
Yo ozali na nguya, Yawe
mpe boyengebene na yo ezingi yo.

9 Yo ozali na bokonzi likolo ya ebale monene oyo etomboki,
bambonge na yango soki etelemi
okotisaka yango.

10 Onyataki Rahabi
lokola moto baboma ;
na makasi ya loboko na yo, opanzaki banguna na yo.

11 Likolo ezali ya yo, mpe mokili ezali ya yo ;
Yo moto osalaki mokili
mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango.

12 Yo moto osalaki Sude mpe Nord ;
Tabor mpe Ermo
ezali koyemba na esengo mpo na kombo na yo.

13 Loboko na yo ezali na nguya ;
loboko na yo etondi makasi ;
loboko na yo ya mobali enetolami

14 Bosembo mpe kosala malamu yango nde ezali fondasio
ya Kiti na yo ya bokonzi ;
bolingo mpe boyengebene ezali kotambola liboso na yo.

15 Mapamboli na bato oyo bazali koyekola kobetela yo maboko
baoyo batambolaka na moi
ya miso na yo.

16 Bazali kosepela mokolo mobimba kati na kombo na yo ;
bazali na esengo kati na bosembo na yo.

17 Pamba te, yo ozali nkembo mpe makasi na bango ;
mpe na ngolu na yo onetolaka maseke na biso.

18 Ya solo ebende ya makasi
oyo ebatelaka biso ezali Yawe ;
mokonzi na biso azali Mosantu ya Isayele

19 Mokolo moko, na emoniseli,
olobaki ; epai ya bandimi na yo oyebisaki :
“Napesaki makasi na elombe moko ;
nanetolaki elenge mobali moko na kati ya bato.

20 Namonaki David mosali na ngai ;
mafuta na ngai ya bosantu, napakolaki ye…

21 Loboko na ngai ekosimba ye ya solo
loboko na ngai ekopesa ye makasi.

22 Monguna ata moko te akotia ye na se ya bokonzi na ye
mpo afuta mpako ;
ata moto mabe moko te akonyokola ye.

23 Nakoniata banguna na ye liboso na ye ;
mpe nakokweyisa bayini na ye.

24 Bolingo na ngai ya boyengebene ekozala na ye
mpe na nzela ya kombo na ngai maseke na ye ekonetolama.

25 Nakotia loboko na ye likolo ya ebale monene ;
mpe loboko na ye ya mobali likolo ya bamayi.

26 Akobenga ngai :
‘Yo ozali Tata na ngai, Nzambe na ngai,
libanga ya lobiko na ngai !’

27 Nakopona ye mwana na ngai ya liboso ;
na bokonzi ya mokili oyo aleki konetolama.

28 Nakowumisa bolingo na ngai epai na ye libela na libela,
na ngai na ye
ekobeba soki moke te.

29 Nakotelemisa ngwi libota na ye libela na libela ;
kiti na ye ya bokonzi ewumela
lokola likolo ekowumela.

30 Soki bana na ye babwaki Mibeko na ngai,
mpe balandi bikateli na ngai te,

31 soki babuki bikateli na ngai,
mpe babebisi kobatela malako na ngai,

32 Nakopesa etumbu na masumu na bango na fimbo,
mabe na bango na fimbo

33 kasi nakolongola te bolingo na ngai epai na ye ;
mpe nakowangana te boyengebene na ngai.

34 Nakobebisa boyokani na ngai te ;
to nakobongola ata moke te
oyo bambebo na ngai ebimisaki

35 Mbala moko mpo na libela,
nalapaki na bosantu na ngai ;
mpe nakokosa David te.

36 Ete libota na ye ekowumela libela ;
mpe Kiti na ye ya bokonzi ekowumela liboso na ngai
lokola moi.

37 Ekozala ya kotelema ngwi libela lokola sanza,
temwe ya boyengebene kuna na mapata.”

38 Kasi obwakaki ye, otiolaki ye ;
ozalaki na kanda penza na mopakolami na yo

39 Oboyaki Boyokani na mosali na yo ;
mpe olongolaki lokumu ya bokonzi na ye,
kino obwakaki yango na putulu.

40 Obukaki bamur na ye nyonso ;
mpe okitisaki bandako na ye ya makasi na libebi

41 Baoyo nyonso balekaka wana bazalaki kobotola ye biloko ;
akomaki eloko ya litioli
epai ya baoyo bavandaka pembeni na ye.

42 Onetolaki loboko ya mobali ya bayini na ye ;
osalaki esengo na banguna na ye nyonso

43 Obalusaki mino ya mopanga na ye ;
mpe osungaki ye te na bitumba.

44 Otiaki suka na kongenga na ye
mpe obwakaki Kiti na ye ya bokonzi na mabele.

45 Okataki na mokuse mikolo ya bolenge na ye ;
ozipaki ye na kazaka ya soni.

46 Kino tango nini, Yawe, okobombama libela na libela ?
Kino tango nini kanda na yo ekongala lokola moto ?

47 Kanisa ndenge bomoi na ngai ezali ya tango mokuse ;
mpo na pamba osalaki bato nyonso !

48 Moto nini akoki kozala na bomoi,
mpe amona liwa te,
to amibikisa
na nguya ya mboka ya bakufi ?

49 Yawe, esika nini ezali bolingo ya makasi na yo ya kala,
oyo kati na boyengebene na yo olapaki epai na David ?

50 Kanisa, Yawe, ndenge bazalaki kosakana na mosali na yo ;
ndenge namemi na motema na ngai
kofinga ya bikolo nyonso,

51 Na kofinga oyo banguna na yo bazalaki kosakana,
Yawe, na oyo bazalaki kosakana
na makolo ya mopakolami na yo.
52Masanzoli ezala epai na Yawe libela na libela. Amen ! Amen !
Copyright information for LinMNB