Psalms 9

Nzambe

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi ; ayembaki yango tango mwana akufaki.


1 Nakosanzola yo, Yawe, na motema na ngai mobimba ;
mpe nakoyebisa misala na yo nyonso ya kokamwa.

2 Nakosepela mpe nakoyoka esengo mpo na yo, e e Nzambe yo oleki likolo,
nakoyemba masanzoli mpo na kombo na yo !

3 Banguna na ngai bazongi sima,
babeti libaku mpe bazali kobeba liboso na yo.

4 Pamba te olobelaki ngai mpe obongisaki likambo na ngai ;
Ovandi na Kiti na yo ya bokonzi
mpe ozali kosambisa na ndenge ya alima.

5 Opameli bikolo mpe obomi bato na mabe ;
olongolaki kombo na bango mpo na libela na libela.

6 Kobeba ezanga suka ekweyelaki monguna.
Opanzaki bavile na bango ;
mpe bato bakokanisa bango lisusu te.

7 Yawe azali na bokonzi libela na libela ;
atiaki Kiti na ye ya bokonzi mpo na kosambisa.

8 Akosambisa mokili na bosembo nyonso ;
akokamba bato na ndenge ekoki.

9 Yawe azali esika ya kobombama
mpo na moto oyo azali konyokwama,
mpe esika ya makasi na tango ya pasi.

10 Baoyo bayebi kombo na yo
bakotia elikya na bango kati na yo,
pamba te yo Yawe, osundolaka te baoyo balukaka yo !

11 Boyemba masanzoli mpo na Yawe, oyo avandaka na Siona ;
bopanza sango ya makambo oyo ye asala kati na bikolo.

12 Pamba te oyo azongisaka mabe mpo na makila esopani,
akokanisaka ; abosanaka te koganga ya bato ya pasi.

13 Yawe,
tala ndenge banguna na ngai bazali konyokola ngai !
Yokela ngai mawa, mpe tombola ngai wuta na ba-porte ya liwa ;

14 mpo ete nakoka kosakola masanzoli na yo
na ba-porte ya elenge mwasi ya Siona ;
mpe nakotonda na esengo kati na lobiko na yo.

15 Bikolo bikweyi na libulu oyo bango moko batimolaki ;
makolo na bango ekangami na monyama
oyo bango moko batiaki na kobombama.

16 Yawe amilakisi, na nzela ya bosembo na ye ;
moto na mabe akangami na misala ya maboko na ye moko.

17 Bato na mabe bazali kozonga na mboka ya bakufi,
bikolo nyonso oyo ebosanaki Nzambe.

18 Kasi moto akelela, bakoki kobosana ye te mpo na libela,
mpe elikya ya bato na pasi ekosila te mpo na libela.

19 Yawe telema, kotika te ete moto alonga ;
tika ete basambisa bikolo na miso na yo !

20 Yawe tondisa bango na somo ;
tika ete bikolo biyeba ete bazali kaka bato.
Copyright information for LinMNB