Psalms 90

BUKU YA MINEI

Teya biso toyeba kotanga mikolo na biso

Libondeli ya Moyise moto ya Nzambe.

1Yawe, yo ozali esika na biso ya kovanda na batango nyonso.

2 Liboso ete bangomba ebotama,
yo osalaki mabele mpe mokili,
wuta seko na seko ozali Nzambe

3 Yo ozongisaka bato na putulu ;
na koloba : “zonga na putulu bana ya bato.”

4 Pamba te,
bambula nkoto na miso na yo ezali lokola mokolo,
oyo ewuti koleka, to lokola ngonga moko na butu.

5 Olongolaka bato na pongi ya liwa ;
bazali lokola matiti ya sika na tongo.

6 Na tongo pe ebimisaka ya sika ;
na pokwa elembaka mpe ekawukaka.

7 Tosilaka na kanda na yo ;
mpe koyokaka somo na kotomboka na yo.

8 Otiaka mabe na biso liboso na yo ;
masumu na biso oyo ebombama,
na mwinda ya miso na yo.

9 Mikolo na biso nyonso ezali kolimwa kolimwa
na se ya kanda na yo ;
tosilisaka bambula na biso na kolela na pasi

10 Molayi ya mikolo na biso ezali ya bambula ntuku sambo,
to bambula ntuku mwambe,
soki tozali na makasi ;
yango wana, tango na bango ezali kaka pasi mpe minyoko
pamba te tozali koleka noki
mpe tozali kopumbuaka.

11 Nani ayebi nguya ya kanda na yo ?
Pamba te kanda na yo ezali monene
lokola kobanga oyo ekoki na yo.

12 Teya biso kotanga mikolo na biso malamu,
ete tokoka kozwa motema moko ya bwanya.

13 Bongwana, e e yawe ! Kino tango nini ekozala ?
Yokela basali na yo mawa !

14 Tondisaka biso na tongo, na bolingo na yo ya makasi,
ete tokoka koyemba na esengo,
mpe tokosepela mikolo nyonso.

15 Sepelisa biso lokola mikolo mingi
oyo yo omonisaki biso pasi,
lokola bambula mingi
oyo tomonaki minyoko.
16Tika ete misala na yo balakisa yango
epai ya basali na yo ;
kongenga na yo epai ya bana na bango.

17 Tika ete ngolu ya Yawe
Nzambe na biso ezala likolo na biso ;
lendisa misala ya maboko na biso mpo na biso ;
ee, lendisa misala ya maboko na biso.
Copyright information for LinMNB