Psalms 96

Tika ete mokili mobimba ekumisa Yawe, Mokonzi na yango


1 Boyembela Yawe nzembo ya sika ;
Boyembela Yawe, mokili mobimba !

2 Boyembela Yawe, bosanzola kombo na ye ;
bosakola lobiko na ye mokolo na mokolo.

3 Botatola nkembo na ye
na kati ya bikolo ;
misala na ye ya kokamwa
na kati ya bato nyonso.

4 Pamba te Yawe azali monene,
mpe aleki mpo na kozwa masanzoli ;
ye azali sukisa likolo ya banzambe nyonso.

5 Pamba te banzambe ya bikolo
ezali bikeko,
kasi Yawe asalaki likolo.

6 Kongenga mpe lokumu ezali liboso na ye,
makasi mpe nkembo ezali na kati
ya Esika na ye ya bosantu.

7 Bopesa Yawe, e e mabota ya bikolo,
bopesa Yawe nkembo mpe makasi !

8 Bopesa Yawe nkembo oyo ekoki na kombo na ye ;
bomema likabo mpe bokota na balopango na ye !

9 Bokumbamela Yawe kati na kongenga ya bosantu na ye
lenga liboso na ye, mokili mobimba.

10 Boloba na kati ya bikolo :
“Yawe azali Mokonzi !”
Mokili etelema ngwi,
ekoki koningana te ;
akosambisa bato na alima.

11 Tika ete likolo esepela,
tika mokili ezala na esengo ;
tika ete ebale eyokisa lokito
mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango.

12 Tika ete bilanga ezala na esengo,
mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango !
Bongo banzete nyonso ya zamba ekoyemba na esengo,

13 ekoyemba nzembo liboso ya Yawe,
pamba te azali koya, azali koya kosambisa mokili
Akosambisa mokili na bosembo
mpe bato na solo na ye.
Copyright information for LinMNB