Psalms 97

Nzambe monene ya mokili


1 Yawe azali na bokonzi,
tika ete mokili mobimba ezala na esengo ;
tika bisanga ya mosika esepela !

2 Mapata mpe molili ya makasi ezingi ye ;
bosembo mpe kosala malamu ezali fondasio ya Kiti
na ye ya bokonzi.

3 Moto ezali kotambola liboso na ye
mpe ezali kotumba bayini na ye na bisika nyonso.

4 Kongenga na ye ya kake ezali kongengisa mokili ;
mabele emoni mpe elengi ;

5 Bangomba ezali konyangwama lokola mafuta,
liboso ya Yawe, ya mokili mobimba.

6 Likolo ezali kopanza sango ya bosembo na ye ;
mpe bato nyonso bazali komona nkembo na ye.

7 Baoyo nyonso bakumbamela bililingi bazala na soni
baoyo bamikumisaka na bikeko,
Bokumbamela ye bino banzambe nyonso.

8 Siona ayoki mpe asepeli ;
mpe bamboka ya Yuda ezala na esengo
mpo na ndenge okokata makambo, Yawe.

9 Pamba te yo Yawe,
ozali ye Oyo Aleki Likolo na mokili mobimba ;
oleki na konetolama likolo penza ya banzambe nyonso.

10 Tika ete baoyo bolingaka Yawe, boyina mabe ;
pamba te ye abatelaka bomoi ya bandimi na ye,
mpe akangolaka bango na maboko ya bato ya mabe.

11 Moi engengelaka bato na sembo ;
mpe esengo ezali mpo na bato
oyo bazali alima na mitema.

12 Bosepela kati na Yawe, bino oyo bozali sembo ;
mpe bosanzola kombo na ye ya bosantu.
Copyright information for LinMNB