Psalms 98

Nzambe azali koya kosambisa mokili

Nzembo


1 Boyembela Yawe nzembo ya sika,
pamba te asalaki makambo ya kokamwa ;
loboko na ye ya mobali
mpe loboko na ye ya bosantu esalaki lobiko mpo na ye.

2 Yawe alakisaki lobiko na ye ;
mpe amonisaki bosembo na ye epai ya bikolo.

3 Akanisaki bolingo na ye mpe boyengebene na ye
epai ya ndako ya Isayele ;
basuka nyonso ya mokili emonaki lobiko ya Nzambe na biso.

4 Boganga na esengo epai ya Yawe, mokili mobimba ;
bolela na nzembo ya esengo elongo na miziki !

5 Bobeta miziki epai ya Yawe,
na lindanda mpe na makelele ya moyembi

6 Na bakelelo mpe lokito ya liseke ya meme
boganga na esengo nyonso liboso na Yawe Mokonzi

7 Tika ete ebale monene eyokisa lokito
mpe eloko nyonso oyo ezali na kati na yango,
mokili na baoyo nyonso bavandi kati na yango.

8 Tika ete ba-ebale ebeta maboko na bango ;
tika ete bangomba eyemba lisanga mpo na esengo ;

9 tika yango eyemba liboso na Yawe,
pamba te azali koya kosambisa mokili.
Akosambisa mokili na bosembo nyonso,
mpe akosambisa bato na ndenge oyo ekoki.
Copyright information for LinMNB