Psalms 99

Bokumisa Yawe !


1 Yawe azali na bokonzi,
tika ete bikolo elenga ;
atie kiti na ye ya bokonzi kati-kati ya baselibin
tika ete mokili eningana.

2 Yawe azali monene na Siona ;
anetolama likolo penza ya bikolo nyonso.

3 Tika ete basanzola kombo na yo
monene mpe ya somo ;
ye azali Mosantu !

4 Mokonzi azali na nguya, alingaka bosembo !
Otiaki makambo oyo ekoki,
na Zakobi, asalaki oyo ezali sembo mpe alima.

5 Bonetola Yawe Nzambe na biso ;
mpe bokumbamela esika oyo atiaka makolo na ye ;
pamba te azali Mosantu !

6 Moyize mpe Aron bazalaki na kati ya
banganga Nzambe na ye,
Samuele azalaki moko na kati ya
baoyo bazalaki kobenga na kombo na ye ;
babengaki Yawe,
mpe ye azongiselaki bango eyano.

7 Azalaki kolobela bango na likonzi ya lipata ;
babatelaki bikateli na ye
mpe mitindo oyo apesaki bango.

8 Yawe Nzambe na biso,
yo ozongiselaki bango biyano,
ozalaki mpo na Isayele Nzambe oyo azalaki
kolimbisa,
atako opesa bango bitumbu
na misala na bango ya mabe.

9 Bonetola Yawe Nzambe na biso,
mpe bokumbamela na ngomba na ye ya bosantu ;
pamba te Yawe Nzambe na biso, azali Mosantu !
Copyright information for LinMNB