Revelation of John 10

Buku ya moke

1Bongo namonaki anzelu mosusu ya nguya makasi penza, azalaki kokita wuta na likolo. Lipata moko ezipaki ye lokola elamba, mpe arkansiel moko ezingaki motu na ye. Elongi na ye ezali lokola moi, mpe makolo na ye ezalaki lokola makonzi ya moto. 2Asimbaki mwa buku efungwama. Atiaki lokolo na ye ya mobali na ebale monene, mpe oyo ya mwasi na mokili. 3Agangaki na mongongo makasi ndenge tambwe egangaka. Mpe tango asilisaki koganga, bankake sambo ebetaki. 4Tango bankake sambo esilaki kobeta, nalingaki kokoma, kasi nayokaki mongongo moko ewutaki na Likolo, elobelaki ngai : “Bomba malamu makambo oyo bakake sambo elobi, kokoma yango te !”

5Bongo anzelu, oyo namonaki atelemaki na ebale monene mpe na mokili, atombolaki loboko na ye ya mobali na likolo 6mpe alapaki ndayi na kombo ya Moto oyo azali na bomoi libela na libela, Ye oyo asalaki likolo mpe biloko oyo ezali kuna, mabele mpe biloko oyo ezali kuna, na ebale monene mpe biloko oyo ezali kati na yango :

—Tango ya kozela ezali lisusu te !
7Kasi na mokolo yango, tango anzelu ya sambo akobeta kelelo, Nzambe akokokisa mabongisi na ye oyo ezali ya kobombama, ndenge ayebisaki yango na basali na ye baprofeta.

8Bongo mongongo oyo nayokaki, oyo ewutaki na Likolo, elobelaki ngai lisusu :

—Kende, kamata buku ya moke oyo ezali ya kofungwama na loboko ya anzelu, oyo atelemi na ebale monene mpe na mokili.

9Napusanaki pene-pene ya anzelu, mpe nasengaki ye apesa ngai buku ya moke.

Bongo ye alobaki na ngai :

Kamata yango mpe lia yango ! Ekozala bololo na libumu na yo, kasi na monoko ekozala sukali lokola mafuta ya nzoyi.

10Nakamataki mwa buku yango na loboko ya anzelu, mpe namelaki yango. Na monoko na ngai, ezalaki sukali lokola mafuta ya nzoyi, kasi tangonaliaki yango, ekomaki bololo na kati ya libumu. 11Bongo balobaki na ngai :

—Esengeli osakola lisusu na mikili mingi, bikolo mingi, minokomingi, mpe epai ya bakonzi mingi.
Copyright information for LinMNB