Revelation of John 11

Batemwe mibale

1Sima, bapesaki ngai mwa nzete moko lokola metele oyo bamekelakamolayi, mpe balobaki na ngai :

—Telema, kende kotanga molayi ya Ndako ya Nzambe, mpe mesa oyo batumbelaka makabo, bongo otanga mpe bato oyo basambelaka kuna.
2Kasi kotanga molayi ya libanda ya Ndako ya Nzambe te, mpo basila kopesa yango na bampakano. Bango bakoniata vile ya bosantu basanza ntuku minei na mibale. 3Nakopesa nguya na batemwe na ngai mibale, oyo bakolata saki, mpe bakosakola na mikolo nkoto moko nkama mibale na ntuku motoba. 4Bango bazali banzete mibale ya olive mpe biloko mibale oyo batielakaminda, oyo ezali liboso ya Nkolo ya mokili. 5Soki moto alingi kosala bango mabe, moto ekobima na minoko na bango mpe ekoboma banguna na bango ; mpe moto nyonso oyo akoluka kosala bango mabe, asengeli kokufa ndenge wana. 6Bango bazali na nguya ya kokanga likolo mpo ete mbula enoka te na mikolo oyo bakozala kosakola. Bazali mpe na nguya ya kobongola mayi ekoma makila, mpe ya kotinda minyoko ya lolenge nyonso na mokili, tango nyonso bango bakolinga.

7Tango bakosilisa litatoli na bango, nyama oyo ekobima na libulu ya molai ekobundisa bango, ekolonga bango, mpe ekoboma bango. 8Bongo bibembe na bango bakolalisa yango na bala-bala ya vilemonene, epai babakaki Nkolo na bango na ekuruze. Na molimo, babengaka vile yango : Sodome mpe Ezipito. 9Bato ya mikili nyonso, na ya mabota nyonso, na ya minoko nyonsompe ya bikolo nyonso, bakotala bibembe na bango mikolo misato na ndambo, mpe bakopesa nzela te mpo bakunda yango. 10Bato oyo bavandaka na mokili bayokaki esengo mpo na liwa na bango. Bakosala feti mpe bakotindana makabo, pamba te baprofetawana mibale batungisaki mingi penza bato oyo bavandaka na mokili.

11Kasi sima ya mikolo misato na ndambo, pema ya bomoi oyoewutaki na Nzambe ekotelaki bango, bongo batelemaki. Mpe somo moneneezwaki bato oyo bazalaki kotala bango. 12Bongo baprofeta wana mibale ya Nzambe bayokaki mongongo moko ya makasi ewutaki na Likolo, mpe elobelaki bango : “Bomata awa !” Bamataki na Likolo na kati ya mapata, mpe banguna na bango bazalaki kotala bango. 13Kaka na tango wana, mokili eninganaki makasi penza. Eteni moko na kati ya biteni zomi ya vile ebukanaki, mpe bato nkoto sambo bakufaki na koningana yango ya mabele. Bato oyo babikaki batondaki na somo mpe bakumisaka Nzambe ya Likolo.

14Mawa ya mibale eleki ; mawa ya misatu etikali moke eya.

Kelelo ya sambo : koya ya Bokonzi ya Kristo

15Bongo anzelu ya sambo abetaki kelelo ; mingongo ya makasi eyokanaki na Likolo, mpe ezalaki koloba :

—Bokonzi ya mokili ekomi Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Kristona ye. Ye akozala na bokonzi mikolo nyonso libela na libela.

16Bongo bampaka ntuku mibale na minei oyo bavandaki na bakiti ya bokonzi liboso ya Nzambe, batiaki bilongi na nse mpe basambelaki Nzambe. 17Bazalaki koloba : Nkolo Nzambe na nguya nyonso,
oyo ozalaki mpe ozali,
totondi yo,
mpo osaleli nguya na yo ya monene,
mpe obandi bokonzi na yo.

18 Bikolo etombokaki ;
mpe kanda na yo ezali koya.
Tango ekoki mpo osambisa bato bakufa,
mpe mpo na kopesa lifuti na bawumbu na yo baprofeta,
mpe na basantu,
mpe na baoyo nyonso batosaka kombo na yo,
bato pamba
mpe bato minene
mpe mpo na koboma bato oyo babebisaka mokili.

19Bongo Ndako ya Nzambe oyo ezali na Likolo efungwamaki, mpe Sanduku ya Boyokani na ye emonanaki na kati ya Ndako ya Nzambe. Kongenga ya kake emonanaki, mingongo, lokito na bakake eyokanaki, mokili eninganaki mpembula monene ya mabanga enokaki.
Copyright information for LinMNB