Revelation of John 12

BILEMBO SAMBO

Elembo ya mwasi ya nzemi

1Bongo elembo moko ya monene emonanaki na likolo : Mwasi moko alataki moi, mpe azalaki na sanza na nse ya makolo na ye, mpe atalaki na motu na ye ekoti ya bokonzi oyo ezalaki na minzoto zomi na mibale. 2Azalaki na zemi, akomaki pene-pene ya kobota, mpe azalaki kolela mpo na pasi.

3Mpe elembo mosusu emonanaki na likolo : ezalaki Dragon moko yamonene mpe ya motane. Ezalaki na mitu sambo mpe maseke zomi, mpe bikoti sambo ya bokonzi na mitu na yango. 4Mokila na ye ezalaki kokomba eteni moko ya misato ya minzotoya likolo, mpe ebwakaki yango na mabele. Dragon yango etelemaki libosoya mwasi oyo alingaki kobota mpo elia mwana na ye tango akobotama. 5Mpe mwasi yango abotaki mwana mobali oyo akotambwisa bikolo nyonso, na lingenda ya ebende. Bongo mwana amemamaki epai ya Nzambe mpe epai ya Kiti na ye ya bokonzi. 6Mwasi yango akimaki na esobe, na esika oyo Nzambe abongisaki mpo naye, mpo ete baleyisa ye wana mikolo nkoto moko nkama mibale na ntukumotoba (1.260).

7Bongo etumba ebimaki na likolo : Misiele na baanzelu na ye babundaki na Dragon, mpe Dragon na baanzelu na ye babundisaki mpe Misiele. 8Kasi dragon ezalaki na makasi mingi te, mpe babenganaki ye na Likolo. 9Bongo babwakaki Dragon ya monene, yango nde “Nyoka ya kala”, oyo babengaka Zabolo to Satana ; oyo akosaka bato ya mokili mobimba. Babwakaki yango na mabele, elongo na baanzelu na yango.

10Bongo nayokaki mongongo moko ya makasi ewutaki na Likolo, elobaki : Sikʼoyo lobiko, nguya,
Bokonzi ya Nzambe na biso,
mpe nguya ya Kristo na ye eye.
Pamba te, mofundi ya bandeko na biso,
oyo azalaki kofunda bango
liboso ya Nzambe na biso, butu mpe moi,
basiʼbabwaki ye.

11 Balongi ye mpo na makila ya Mwana Meme,
mpe mpo na Liloba ya litatoli na bango ;
balingaki bomoi na bango te,
ata kino na liwa.

12 Yango wana yo Likolo,
na bino baoyo bovandaka kuna, bosepela !
Kasi mawa na mokili mpe na ebale monene,
pamba te
zabolo akiti epai na bino
mpe atondi na kanda,
mpo ayebi ete atikali na tango moke.

13Tango Dragon emonaki ete babwakaki ye na mabele, ebandaki kolanda mwasi oyo abotaki mwana mobali. 14Kasi bapesaki mwasi yango mapapu mibale ya ndeke moko ya monene, mpo apumbwa kino na esika oyo ebongisama mpo na ye, na esobe. Kuna baleyisaki ye tango moko, batango, mpe ndambo ya tango, mosika na elongi ya nioka.

15Bongo nyoka esanzaki mayi ebele penza lokola ebale na simaya mwasi mpo mayi yango emema ye. 16Kasi mabele eyaki kosalisa mwasi, efungolaki monoko na yango, mpe emelaki ebale oyo Dragon esanzaki. 17Bongo Dragon etombokaki na mwasi, mpe ekendaki kobundisa bana na ye mosusu, ezali baoyo batosaka Mibeko ya Nzambe mpe basimba makasi litatoli ya Yesu. 18Bongo Dragon ekendaki kotelema na zelo ya ebale monene.
Copyright information for LinMNB