Revelation of John 16

1Bongo nayokaki mongongo moko ya monene ewutaki na ndako ya Nzambe, elobaki na baanzelu sambo :

—Bokende mpe bosopa na mabele bakopo sambo ya kanda ya Nzambe.

2Anzelu ya liboso akendaki mpe asopaki kopo na ye na mabele. Bongo bapota ya somo mpe ya pasi ebimaki na nzoto ya bato oyo bazalaki na elembo ya nyama mpe bakumbamelaki elilingi na yango.

3Anzelu ya mibale asopaki kopo na ye na ebale monene, mpe ebaleekomaki makila lokola ya moto akufi ; mpe biloko nyonso ya bomoi oyo ezalaki na ebale, ekufaki.

4Anzelu ya misato asopaki kopo na ye na ba-ebale mpe na bisika mayi ebimaka ; mpe ekomaki makila. 5Bongo nayokaki anzelu oyo azalaki na bokonzi likolo ya mayi, alobaki :

—Ozali sembo, yo oyo ozali mpe ozalaki ; Mosantu, mpo okati bongo !
6Pamba te basopaki makila ya basantu mpe ya baprofeta ; mpe opesi bango makila mpo bamela, yango ekoki na bango.

7Bongo nayokaki mongongo moko ewutaki na mesa oyo batumbelaka makabo, elobaki :

—E e, Nkolo Nzambe ya nguya nyonso, okataka makambo na ndenge yasolo mpe ya sembo !

8Anzelu ya minei asopaki kopo na ye likolo ya moi. Mpe moi ezwaki nzela ya kozikisa bato na moto. 9Bato bazikaki na moto ya makasi penza mpe babandaki kofinga kombo ya Nzambe oyo azali na bokonzi likolo ya bapasi wana. Kasi baboyaki kobongola mitema na bango mpe kopesa ye nkembo.

10Anzelu ya mitano asopaki kopo na ye likolo ya kiti ya bokonzi ya nyama ; bokonzi ya nyama yango ekomaki molili, mpe bato babandaki komiswa lolemo mpo na pasi ; 11bafingaki Nzambe ya Likolo, mpo na bapasi na bango mpe mpo na bapota na bango. Kasi baboyaki kobongola mitema na misala na bango.

12Anzelu ya motoba asopaki kopo na ye na ebale monene ya Efrate ; bongo mayi na yango ekawukaki mpo na kobongisa nzela ya bakonzi mineneoyo bakowuta na Este. 13Bongo namonaki milimo misato ya mbindo lokola magorodo ebimaki na monoko ya Dragon, monoko ya nyama, mpe na monoko ya moprofeta ya lokuta. 14Yango nde milimo ya mbindo oyo esalaka makamwisi, mpe ekokende epaiya bakonzi minene ya mokili mobimba, mpo na kosangisa bango esika moko mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe ya nguya nyonso.

15Tala : nazali koya lokola moyibi. Esengo na moto oyo azalikokengela mpe azali kobatela bilamba na ye, mpo ete atambola bolumbu tempe bamona soni na ye te.

16Bongo milimo wana esangisaki bakonzi minene na esika oyo babengaka na monoko ya Ki-ebreo : “Armagedoni”.

17Anzelu ya sambo asopaki kopo na ye likolo ya mopepe, mpe mongongo moko ya monene ewutaki na Kiti ya bokonzi, ebimaki na Ndako ya Nzambe, elobaki :

—Ekokisami !

18Bongo kongenga ya kake emonanaki, kake ebetaki, lokitoeyokanaki, mpe mokili eninganaki makasi penza. Koningana ya ndenge wana naino esalama te banda moto azali na mokili. 19Vile monene ekabwanaki na biteni misato ; mpe bavile ya bikolo nyonso ebukanaki. Bongo Nzambe akanisaki vile monene ya Babilona mpe apesaki yango kopo oyo etonda na vino ya kongala ya kanda na ye. 20Bisanga nyonso ekimaki, mpe bangomba emonanaki lisusu te. 21Mbula ya mabanga minene enokaki : libanga moko ezalaki na bakilo pene-pene ntuku minei na mibale na ntuku misato, mpe ezalaki kokweyela bato. Bongo bato bafingaki Nzambe mpo na pasi ya mbula wana ya mabanga, pamba te pasi yango ezalaki monene mingi.
Copyright information for LinMNB