Revelation of John 2

MIKANDA NA MANGOMBA SAMBO

Mokanda na Lingomba oyo ezali na Efezo

1—Komela anzelu ya Lingomba oyo ezali na efezo : “Moto oyo asimbi minzoto sambo na loboko na ye ya mobali mpe azali kotambola na kati ya biloko sambo ya wolo oyo batielaka minda, alobi boye : 2Nayebi misala na yo, pasi oyo omonaka na mosala, mpe kokanga motema na yo. Nayebi ete okokaka te kondima bato ya mabe, mpe osiʼomeka baoyo balobaka ete bazali Bapostolo, nzokande bazali Bapostolo te, mpe osiʼomona ete bazali bato ya lokuta. 3Okangaka motema mpe oyikaka piko na bapasi mpo na kombona ngai, mpe olembaki te.

4Kasi mabe moko namonaka epai na yo, yangʼoyo : bolingo na yo ya liboso, osiʼobwaki yango. 5Yango wana, kanisa malamu esika okweyaki ! Bongola motema na yo, mpe zongela kosala misala oyo ozalaki kosala liboso. Soki obongoli motemate, nakoya epai na yo mpe nakolongola eloko batielaka mwinda na yo, na esika na yango. 6Kasi malamu moko ezali epai na yo, yango oyo : Oyinaka misala ya mabe ya bato ya Lingomba ya Nikola ; ngai mpe nayinaka yango.

7Oyo azali na matoyi, tika ayoka makambo oyo Molimo alobi na Mangomba. Oyo akolonga, nakopesa ye nzela ya kolia mbuma na nzete ya bomoi, oyo ezali na paradizo ya Nzambe.”

Mokanda na Lingomba oyo ezali na Simirne

8—Komela anzelu ya lingomba oyo ezali na Simirne : “Moto oyo azali moto ya liboso mpe ya suka, oyo akufaki mpe azalilisusu na bomoi, alobi boye : 9Nayebi minyoko na yo mpe kokelela na yo—nzokande ozali moto ya bomengo. Nayebi mpe ndenge bato oyo balobaka ete bazali Bayuda bafingaka yo, nzokande bazali Bayuda te kasi bazali ndako ya mayangani ya Satana, 10Kobanga te mpo na pasi oyo ekoyela yo. Tala, Zabolo akobwaka bato mosusu na kati na bino na boloko mpo na komekabino ; mpe bokonyokwama mikolo zomi. Kangama kaka na kondima na yo, kino na liwa, mpe nakopesa yo ekoti ya lokumu oyo ya bomoi.

11Oyo azali na matoyi, tika ayoka makambo oyo Molimo alobi na Mangomba.

Oyo akolonga, akonyokwama te na liwa ya mibale.”

Mokanda na Lingomba oyo ezali na Pergame

12—Komela anzelu ya Lingomba oyo ezali na Pergame : “Moto oyo azali na mopanga ya mino mibale, alobi boye : 13Nayebi esika ovandaka, ezali kuna epai Satana azali na kiti na ye ya bokonzi. Ozali ya kokangama makasi na kombo na ngai, mpe owangana kondima na yo te epai na ngai, ata na mikolo ya Antipas, temwe na ngai ya solo, oyo babomaki epai na bino, epai Satana avandaka.

14Kasi mabe moko namonaka epai na yo, yango oyo : bato mosusu bazali epai na yo, balandaka mateya ya Balami, oyo ateyaki Balaki mpo akosa bana ya Isayele mpo basala masumu, na nzelaya kolia bilei oyo epesamaki makabo na bikeko, mpe na nzela ya kosala ekobo. 15Basusu mpe kati na yo balandaka mateya ya bato ya Lingomba ya Nikola. 16Yango wana, bongola motema na yo ! Soki te, etikali moke na ya epai na yo, mpe nakobunda na bango na mopanga ya monoko na ngai.

17Moto oyo azali na matoyi, tika ayoka makambo Molimo alobi na Mangomba ya Nzambe.

Oyo akolonga, nakopesa ye mana oyo ebombama. Nakopesa ye mpe libangamoko ya pembe, mpe likolo ya libanga yango, bakoma kombo moko ya sika, oyo moto ata moko te ayebi, longola kaka moto oyo akozwa yango.”

Mokanda na Lingomba oyo ezali na Tiyatire

18—Komela anzelu ya lingomba oyo ezali na Tiyatire : “Mwana ya Nzambe, oyo azali na miso lokola moto ezali kopela mpe oyo azali na makolo lokola ebende ya talo oyo batumbi na moto makasi, alobi boye :

19Nayebi makambo oyo asalaka, bolingo na yo, kondima na yo, na misala na yo, mpe kokanga motema na yo, mpe misala oyo ozali kosala sikʼoyo eleki kutu oyo ya liboso.

20Kasi mabe moko namonaka epai na yo, yango oyo : otikaka mwasi wana Zezabele, oyo alobaka ete azali moprofeta, ateya basali na ngai mpe akosa bango, mpo basala kindumbampe balia bilei oyo epesama makabo na bikeko. 21Napesaki ye tango mpo abongola motema na kindumba na ye, kasi alingi kobongwana te. 22Yango wana, nakobwaka ye na mbeto mpo amona pasi, mpe bato oyo basalaki na ye ekobo, nakonyokola bango mingi penza, loba ete babongoli mitema na bizaleli na bango. 23Nakoboma bana na ye ; bongo Mangomba nyonso ya Nzambe ekoyeba etengai nazali moto oyo atalaka mitema mpe makanisi ya bato. Mpe nakofuta moto na moto lifuti oyo ekoki na misala na ye.

24Kasi mpo na bino bato mosusu ya Lingomba ya Tiyatire, baoyo bondimaka mateya na ye te, mpe bokotaki te na bozindo ya koyeba makambo ya satana oyo ebombama ; nalobi na bino boye : nalingi te komemisa bino mokumba mosusu, 25kaka oyo bozali na yango, bosimba yango makasi kino nakoya.

26Oyo akolonga mpe akokoba kosala makambo oyo ngai nalingaka kino na suka, nakopesa ye bokonzi likolo ya bikolo. 27Akokamba yango na lingenda ya libende, mpe akopanza yango ndenge bapanzaka banzungu ya mabele ; ndenge nazwaki mpe bokonzi epai ya Tata na ngai. 28Nakopesa ye mpe monzoto ya tongo.

29Moto oyo azali na matoyi, tika ayoka makambo Molimo alobi na Mangomba.”
Copyright information for LinMNB