Revelation of John 22

1Bongo anzelu alakisaki ngai ebale ya mayi ya bomoi ; ezalaki kongenga lokola tala-tala, mpe ezalaki kobima na Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mwana-meme ; 2ezalaki koleka na kati-kati ya bala-bala ya vile wana. Mpe nzete ya bomoi ezalaki na ngambo na ngambo ya ebale. Yangoezalaki kobota mbuma mbala zomi na mibale na mbula, elingi koloba mbala moko na sanza moko ; mpe makasa na yango ebikisaka bikolo.

3Ata eloko moko te oyo elakelama mabe ekozala kuna. Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mwana-Meme ekozala na vile yango, mpe basali na ye bakosalela ye. 4Bakomona elongi na ye, mpe kombo na ye ekozala na bilongi na bango. 5Butu ekozala lisusu te ; mpe bakozala na posa ya mwinda to ya moi te, pamba te Nkolo Nzambe akongengisela bango mwinda na ye. Mpe bakozala bakonzi libela na libela.

6Bongo anzelu alobaki na ngai :

—Maloba oyo ezali maloba ya solo mpe oyo tosengeli kotiela motema. Mpe Nkolo Nzambe ya milimo ya baprofeta, atindaki anzelu na ye mpo alakisa na basali na ye makambo oyo esengeli koya sima ya mwa tango moke.

Yesu azali koya

7—Yoka ! Etikali moke naya. Esengo na moto oyo azali kobatela maloba ya kosakolama ya buku oyo.

8Ezali ngai Jean, moto nayokaki mpe namonaki makambo oyo. Tango nayokaki mpe namonaki yango, nafukamaki liboso ya anzelu oyo alakisaki ngai yango mpo na kokumbamela ye.

9Kasi anzelu alobaki na ngai :

—Kosala yango te ! Nazali moninga na yo ya mosala mpe yabandeko na yo baprofeta, mpe ya baoyo batosaka maloba ya buku oyo. Esengeli okumbamela Nzambe !

10Bongo alobaki na ngai :

—Maloba ya kosakolama ya buku oyo, kobomba yango te pamba te tango ekomi pene.
11Tika ete moto azangi bosembo, akoba kaka kosala makambo ezangi bosembo. Tika ete moto oyo azali mbindo, akoba kaka kosala makambo ya mbindo. Tika ete moto oyo azali sembo, akoba kaka kosala makamboya bosembo. Mpe tika ete moto oyo azali mosantu, akoba kaka kozala mosantu.

12—Yoka etikali moke naya, mpe lifuti ezali na ngai mpo na kopesa namoto na moto na lolenge ya mosala oyo ye asalaki. 13Ngai nazali Alfa mpe Omega, moto ya liboso mpe moto ya suka, ebandeli mpe suka. 14Esengo na baoyo bazali kosukola bilamba na bango mpo ete bazwa ndingisaya kolia mbuma ya nzete ya bomoi, mpe bakota na vile na nzela ya baporte na yango. 15Kasi bambwa, baoyo basalelaka kindoki, baoyo basalaka kindumba, baoyo babomaka bato, baoyo basambelaka bikeko, na baoyo nyonso balingaka mpe basalelaka lokuta, bakozala na libanda ya vile yango.

16Ngai Yesu, natindaki anzelu na ngai mpo apesa bino litatoli oyo mpo na Mangomba. Ngai nazali mosisa mpe mwana ya libota ya David, Monzoto oyo engengaka na tongo.

17Molimo mpe Mwasi oyo Mwana-meme akobala, balobi :

—Yaka.

Moto oyo ayoki makambo oyo, aloba :

—Yaka.

Moto oyo azali na posa ya mayi aya ; mpe moto oyo alingi, mayi ya bomoi, azwa yango ya ofele.

Maloba ya suka

18Nazali kokebisa bato nyonso oyo bazali koyoka maloba yakosakolama ya buku oyo : Soki moto abakisi eloko likolo na yango, Nzambe akobakisela ye batembe oyo ekomama na buku oyo. 19Soki moto alongoli eloko na maloba ya kosakolama ya buku oyo, Nzambe mpe akolongola ndambo na ye ya mbuma ya nzete ya bomoi mpe ya vile ya bosantu, oyo ekomama na buku oyo.

20Moto oyo azali kopesa litatoli ya makambo oyo alobi :

—E e, etikali moke naya !

Amen. Nkolo Yesu yaka !

21Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu ezala na basantu nyonso ! Amen.
Copyright information for LinMNB