Revelation of John 3

Mokanda na Lingomba oyo ezali na Sarde

1—Komela anzelu ya lingomba oyo ezali na Sarde : “ Moto oyo azali na milimo sambo ya Nzambe mpe minzoto sambo, alobi boye : Nayebi misala na yo. Balobaka ete ozali na bomoi, nzokande ozali ya kokufa. 2Lamuka, mpe lendisa mwa ndambo ya bandimi oyo batikali, oyo bakomi pene ya kokufa. Pamba te, namoni ete misala na yo ezali ya kokoka te liboso ya Nzambe na ngai. 3Yango wana, kanisa malamu liloba oyo ozwaki mpe oyokaki. Tosa yango mpe bongola motema na yo. Kasi soki olamuki te, nakoya lokola moyibi, mpe okoyeba te soki tango nini nakoya epai na yo.

4Kasi ozali na mwa bato na Sarde, oyo naino babebisi bilamba na bango te. Bakotambola elongo na ngai, na bilamba ya pembe, pamba te bakoki na yango. 5Oyo akolonga, akolata bilamba ya pembe. Nakoboma kombo na ye te na Buku ya bomoi, kasi nakondima kombo na ye liboso ya Tata na ngai mpe liboso ya baanzelu na ye.

6Oyo azali na matoyi, tika ayoka makambo Molimo alobi na Mangomba.”

Mokanda na lingomba oyo ezali na Filadelfi

7—Komela anzelu ya lingomba oyo ezali na Filadelfiya : “ Mosantu mpe Solo, oyo asimbi fungola ya Davidi, soki afungoli, motomoko te akoki kokanga ; mpe soki akangi moto moko te akoki kofungola, alobi boye : 8Nayebi misala na yo. Tala, natiaki liboso na yo porte moko ya kofungwama oyo moto ata moko te akoki kokanga. Nayebi ete ozali na makasi moke, obatelaki Liloba na ngai, mpe owanganaki kombo na ngai te. 9Yoka malamu : nakosala ete bato oyo bazali bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali Bayuda te, kasi bazali bato ya lokuta, baya kofukama na makolo na yo mpe bayeba ete nalingaka yo. 10Lokola obatelaka motindo oyo napesaki yo, oyo ya kokanga motema, ngai mpe nakobatela yo tango komekama ekoya na mokili mobimba, mpo na komeka bato ya mokili. 11Etikali moke naya. Yango wana, batela malamu oyo ozali na yango, mpo ete moto moko te abotola ekoti na yo ya lokumu. 12Oyo akolonga, nakotia ye likonzi na Ndako ya Nzambe na ngai. Mpe akobima kuna te. Nakokoma likolo na ye, kombo ya Nzambe na ngai, mpe kombo ya vile ya Nzambe na ngai : Yeruzalem ya sika, oyo ezali kokita wuta na Likolo, wuta epai ya Nzambe na ngai. Nakokoma mpe kombo na ngai ya sikalikolo na ye.

13Oyo azali na matoyi, tika ayoka makambo Molimo alobi na Mangomba.”

Mokanda na Lingomba oyo ezali na Lawodiseya

14—Komela anzelu ya lingomba oyo ezali na Lawodiseya : “ Moto oyo azali ‘Amen’, oyo azali temwe ya sembo mpe ya solo, oyo azali mokonzi ya biloko nyonso oyo Nzambe asala, alobi boye :

15Nayebi misala na yo, ete ozali malili te mpe moto te. Nalingi ozala malili to moto ! 16Kasi lokola ozali molunge : moto te mpe malili te, nakosanza yona monoko na ngai. 17Olobaka : Nazali moto ya bomengo ! Nakomi na mbongo mingi, nazali na posa ya eloko moko te. Kasi oyebi te ete ozali moto ya mawa penza, moto ya pasi, moto ya kokelela, moto akufa miso mpe moto ya bolumbu. 18Nazali kopesa yo toli oyo : somba epai na ngai wolo oyo bapetoli na moto, mpo okoka kokoma moto ya bomengo, mpe bilamba ya pembe mpo na kolata, bongo okoka kobomba soni ya bolumbu na yo ; sombampe kisi ya miso mpo otia na miso na yo, mpo okoka komona. 19Napamelaka mpe napesaka etumbu na bato oyo nalingaka. Yango wana tia molende mpe bongola motema na yo.

20Tala, natelemi na porte mpe nazali kobeta. Soki moto ayoki mongongo na ngai mpe afungoli porte, nakokota epai na ye, mpe nakolia na ye elongo, mpe ye elongo na ngai.

21Oyo akolonga, nakopesa ye nzela ya kovanda elongo na ngai na Kiti na ngai ya Bokonzi, ndenge ngai nalonga mpe navanda elongo na Tala na ngai na Kiti na ye ya Bokonzi.

22Oyo azali na matoyi, tika ayoka makambo Molimo alobi na Mangomba ya Nzambe.”
Copyright information for LinMNB