Revelation of John 4

MAZITA SAMBO

Porte ya kofungwama na Likolo

1Sima ya makambo wana, namonaki porte moko efungwamaki na Likolo, bongo mongongo oyo nayokaki liboso, oyo ezalaki koyokana lokola kelelo, elobaki :

—Mata awa, mpe nakolakisa yo makambo oyo esengeli koya sima ya oyo.

Emoniseli ya Kiti ya bokonzi, ya Nzambe

2Na mbala moko Molimo amemaki ngai. Bongo namonaki Kiti moko ya Bokonzi ezalaki na Likolo, mpe moto moko avandelaki yango. 3Mpe oyo avandelaki yango azalaki komonana lokola libanga ya talo oyo babengaka “Yaspe” mpe “Sardwane”. Arkensiel
Arkensiel  : to Monama na minoko mosusu.
moko ezalaki lokola libanga ye talo oyo babengaka “Emerode”, ezingaki Kiti yango ya bokonzi.
4Mpe bakiti ntuku mibale na minei ezalaki pembeni-pembeni ya Kiti ya bokonzi. Bampaka ntuku mibale na minei bavandelaki bakiti yango ; balataki bilamba ya pembe mpe bikoti ya lokumu ya wolona mitu na bango. 5Kongenga, lokito mpe bakake ezalaki kobima wuta na Kiti ya Bokonzi. Minda sambo ezalaki kopela liboso ya Kiti ya Bokonzi. Minda yango ezali nde Milimo sambo ya Nzambe. 6Liboso ya Kiti ya bokonzi, namonaki lokola ebale monene oyo ezalaki polele lokola talatala mpe ekokanaki na libanga ya talo oyo babengaka “Kristale”. Bikelamo minei ya bomoi, ezalaki na miso ebele liboso mpe sima, ezalaki na kati mpe na pembeni-pembeni ya Kitiya bokonzi. 7Ekelamo ya liboso ezalaki lokola tambwe, ya mibale lokola mwana ngombe ya mobali, ya misato ezalaki na elongi lokola ya moto, mpe ya minei lokola ndeke moko ya monene oyo ezalaki kopumbwa. 8Mpe bikelamo wana minei ya bomoi, moko na moko ezalaki na mapapu motoba ; nzoto na yango ezalaki ya kotonda na miso na kati mpe na pembeni-pembeni. Butu mpe moi, bazalaki kotika te koloba : Nkolo Nzambe na nguya nyonso, azali
Mosantu, Mosantu, Mosantu.
Oyo azalaki, azali mpe azali koya.

9Tango nyonso bikelamo ya bomoi bazalaki kopesa nnkembo, lokumu, mpe matondi na Moto oyo avandaki na Kiti ya bokonzi, oyo azali na bomoi seko na seko, 10bampaka ntuku mibale na minei bazalaki kotia bilongi na nse liboso ya Moto oyo avandaki na Kiti ya bokonzi, mpe bazalaki kokumisa Moto oyo azali na bomoi libela na libela. Bongo bazalaki kobwaka bikoti na bango ya lokumu libosoya Kiti ya Bokonzi, mpe bazalaki koloba :
11 Nkolo na biso mpe Nzambe na biso,
okoki mpo na kozwa nkembo, lokumu mpe nguya.
Pamba te yo moto osala biloko nyonso.
Yango esalamaki mpe ezali na bomoi,
na mokano na yo.
Copyright information for LinMNB