Revelation of John 5

Buku ekangama na mazita sambo mpe Mwana meme baboma

1Bongo namonaki na loboko ya mobali ya Moto oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi, Buku moko, bakoma yango na kati mpe na libanda mpe ezalaki ya kokangama na mazita sambo. 2Mpe namonaki anzelu moko ya nguya penza, azalaki koganga na mongongo makasi :

—Nani akoki mpo na kofungola mazita oyo ekangisi Buku mpe kofungola Buku yango ?
3Kasi ezala na Likolo, to awa na mokili, to na nse ya mabele, moto ata moko te akokaki kofungola Buku to kotanga yango. 4Tango namonaki bongo, nalelaki mingi mpo moto ata moko te amonanaki ya kokoka mpo na kofungola Buku to mpe kotala yango. 5Bongo moko na kati ya bampaka alobaki na ngai :

—Tika kolela ! Tala, Tambwe ya ekolo ya Yuda, oyo abotamaki na libota ya Davidi asiʼalonga. Azali ya kokoka mpo na kofungola Buku mpe mazita na yango sambo.

6Bongo namonaki, Mwana meme moko atelemaki na kati ya kati ya Kiti ya bokonzi, bikelamo minei ya bomoi mpe bampaka bazingaki ye. Mwana meme yango azalaki komonana lokola nde babomaki ye, azalaki na maseke sambo mpe miso sambo, oyo ezali Milimo sambo ya Nzambe, oyo batindama na mokili mobimba. 7Mwana meme ayaki mpe azwaki Buku wuta na loboko ya mobali ya Moto oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi. 8Tango azwaki Buku, bikelamo minei ya bomoi mpe bampaka ntuku mibale na minei bafukamaki liboso ya Mwana meme. Moko moko na kati na bango azalaki na lindanda moko mpe bakopo ya wolo oyo ezalaki ya kotonda na malasi, yango nde mabondeli ya basantu.

9Bazalaki koyemba nzembo ya sika : Ozali ya kokoka mpo na kozwa Buku,
mpe kofungola mazita na yango,
pamba te babomaki yo,
mpe na makila na yo,
osombaki bato mpo na Nzambe wuta na mabota nyonso,
na minoko nyonso, na mikili nyonso,
mpe na bikolo nyonso.

10 Osali bango ete bazala batu na Bokonzi,
mpe banganga-Nzambe
mpo na kosalela Nzambe na biso,
mpe bakozala na bokonzi na mokili.

11Bongo natalaki mpe nayokaki mingongo ya baanzelu ebele pembeni-pembeni ya Kiti ya Bokonzi, ya bikelamo ya bomoi, mpe ya bampaka ; bazalaki bankoto na bankoto. 12Bazalaki koloba na mongongo makasi : Mwana meme oyo babomaki,
azali ya kokoka mpo na kozwa nguya,
bomengo, bwania, makasi,
lokumu, nkembo mpe masanzoli !
13Bongo nayokaki bikelamo nyonso oyo ezali na likolo, na mokili, na nse ya mabele, na kati ya ebale monene, mpe biloko nyonso oyo ezalikati na yango ; ezalaki koloba :
Masanzoli mpe lokumu, nkembo mpe nguya
ezala na Moto oyo afandi na Kiti ya Bokonzi,
mpe na Mwana meme,
mpo na libela na libela !

14Bongo bikelamo minei ya bomoi bazongisaki : “Amen !”, mpe bampaka bafukamaki mpe basambelaki.
Copyright information for LinMNB