Revelation of John 9

Kelelo ya mitano—pasi ya liboso : banguya ya libulu ya molayi ebimi

1Bongo anzelu ya mitano abetaki kelelo ; namonaki monzoto ewutaki na likolo mpe eyaki kokweya na mokili. Bapesaki monzoto yango fungola ya libulu ya molayi. 2Monzoto efungolaki libulu yango, mpe milinga ebimi na kati. Milinga yango ezali lokola oyo ebimaka na fulu ya monene. Bongo moi na mopepe eyindaki na milinga wana. 3Mankonko ebimaki na milinga wana mpe epanzanaki na mokili. Bapesaki mankonko yango nguya lokola oyo ya bankoto ya mokili. 4Bapekisaki mankonko ete esala mabe te na matiti ya mokili, to na banzete, to na mwa matiti oyo ya mike-mike ; kasi esala mabekaka na bato oyo bazangi elembo ya Nzambe na elongi. 5Mankonko ezwaki nguya ya koboma bato te, kasi kaka ya konyokolabango sanza mitano. Pasi oyo mankonko emonisaki bato, ezali lokolapasi oyo moto amonaka soki nkoto eswi ye. 6Na mikolo wana, bato bakoluka liwa, kasi bakozwa yango te ; bakolinga kokufa, kasi liwa ekokima bango mosika.

7Mankonko yango ezalaki lokola bampunda oyo babongisi mpo na etumba ; na likolo ya mitu na yango ezalaki na biloko moko lokola bikoti ya bokonzi oyo ya wolo, mpe bilongi na yango, ezalaki lokolabilongi ya bato. 8Suki na yango ezalaki lokola oyo ya basi. Mpe mino na yango lokola oyo ya tambwe. 9Ezalaki na biloko moko lokola bibende oyo basoda bazalakikolata mpo na komibatela na makonga. Makelele ya mapapu na yango ezalaki lokola makelele ya bapusu-pusu oyo bampunda ebele ezali kobenda mpo na etumba. 10Mankonko yango ezalaki na mikila mpe basende lokola oyo ya bankoto. Mpe nguya ya konyokola bato basanza mitano ezalaki na mikila na yango.

11Anzelu ya libulu molayi ye nde azalaki mokonzi ya mankonko yango. Kombona ye na monoko ya Ba-ebreo : “Abadon”, mpe na monoko ya Bagreki : “Apolion”
“Abadon” mpe “Apolion”  : elingi koloba : Mobebisi.
.

12Mawa ya liboso elekaki ; tala, mawa mibale ezali koya simaya makambo wana.

Kelelo ya motoba—pasi ya mibale : lipinga monene ya basoda ebimaki

13Bongo anzelu ya motoba abetaki kelelo. Mpe nayokaki mongongo moko ebimaki wuta na basonge minei ya mesa ya wolo oyo batumbelaka makabo, oyo ezalaki liboso ya Nzambe, 14elobaki na anzelu ya motoba oyo azalaki na kelelo :

—Fungola baanzelu minei oyo bakangama na minyololo, na ebale monene ya “Efrate”.

15Bongo afungolaki baanzelu yango minei, baoyo bazalaki ya kobongisama mpo na ngonga wana, mokolo wana, sanza wana, mpe mbula wana, mpo ete baboma eteni moko ya misato ya bato nyonso. 16Bayebisaki ngai talo ya basoda oyo babutaki likolo ya bampunda mpo na etumba, bazalaki : bankoto nkama mibale.

17Tala ndenge namonaki na emoniseli bampunda na basoda oyo bamemaka bampunda : balataki bibende oyo basoda bazalaki kolata mpo na komibatela na etumba ; bibende yango ezalaki ya motane lokola moto, ya langi ya bule ya pete-pete, mpe ya langi ya mosaka. Mitu ya bampunda yango ezalaki lokola oyo ya bantambwe ; mpe moto, molinga, na sufulu ezalaki kobima na minoko na yango. 18Eteni moko ya misato ya bato nyonso ekufaki mpo na bapasi misato oyo : moto, molinga mpe sufulu oyo ezalaki kobima na minoko na yango. 19Pamba te, nguya ya bampunda ezalaki na minoko mpe na mikila na yango ; mpo mikila na yango ezalaki lokola banyoka. Mikila yango ezalakina mitu, mpe ezalaki konyokola bato na mikili wana.

20Bato mosusu oyo bakufaki te na batembe wana, babongolaki mitema te na misala ya mabe oyo bazalaki kosala. Batikaki te kosambela milimo mabe, bikeko ya wolo, ya palata, ya bibende, ya mabanga, mpe ya nzete, oyo ekoki komona te, to koyoka te, to mpe kotambola te. 21Bato yango babongwanaki te mpo batika koboma bato, batika kindoki, batika kindumba mpe moyibi.
Copyright information for LinMNB