Romans 1

Polo apesi baklisto ya Rome mbote

1Mokanda oyo ewuti epai na Polo, mowumbu na Yesu Klisto, oyo abengama mpo ete azala ntoma, mpe aponama mpo na kosakola sango malamu ya Nzambe. 2Nzambe alaka sango malamu oyo wuta kala na nzela ya basakoli na ye, kati na Makomi Mosantu. 3Sango malamu oyo ezali kolobela Mwana na Ye Yesu Klisto, Nkolo na biso, oyo na bomoto, abotamaki na libota ya Davidi, 4mpe oyo na Molimo Mosantu, amonisamaki na nguya nyonso ete azali Mwana na Nzambe na nzela ya lisekwa na ye kati na bakufi. 5Ezali na nzela na ye nde nazwaki ngolu ya kozala ntoma mpo na komema, na kombo na ye, bato ya bikolo nyonso ya bapaya ete batosa ye na nzela ya kondima. 6Boye, bino mpe bozali na molongo ya bato wana, baoyo Yesu Klisto abenga.

7Epai na bino nyonso oyo bozali na Rome, balingami ya Nzambe, oyo bobengama mpo ete bozala basantu :

Tika ete ngolu mpe kimia oyo ewuti na Nzambe Tata na biso mpe na Nkolo Yesu Klisto ezala na bino.

Polo mpe baklisto ya Rome

8Ya liboso, nazali kozongisa matondo epai ya Nzambe na ngai, na nzela ya Yesu Klisto, mpo na bino nyonso, pamba te bazali kolobela kondima na bino na mokili mobimba. 9Nzambe oyo nasalelaka na motema na ngai mobimba tango nateyaka sango malamu ya Mwana na Ye, akoki solo kotatola mpo na ngai ete natikaka te kotanga kombo na bino 10na mabondeli na ngai tango nyonso. Mpe nazali kosenga na Ye ete apesa ngai nzela ya koya kotala bino mikolʼoyo to mikolo ekoya, soki yango ezali na mokano na Ye.

11Pamba te, nazali penza na posa makasi ya koya komona bino mpo na komemela bino bolamu ya Molimo Mosantu mpo ete elendisa kondima na bino. 12To mpe tolendisana elongo, na kondima moko oyo tozali na yango. 13Bandeko na ngai, nalingi boyeba ete, mbala mingi nazalaki kosala mabongisi ya koya epai na bino mpo na kobuka mbuma ndenge nazalaki kosala epai ya bato mosusu ya bikolo ya bapaya. Nzoka nde, kino sikʼoyo bipekiseli mingi ezali kokanga ngai nzela. 14Nazali na niongo ya bagreki to ya bagreki te, ya bato ya bwanya mpe ya bazoba. 15Yango wana, nazali penza na posa makasi ya koteya sango malamu epai na bino oyo bozali na Rome.

Nguya ya sango malamu

16Nazali na soni te mpo na sango malamu, pamba te ezali nguya ya Nzambe mpo na lobiko ya bato nyonso oyo bandimaka : liboso mpo na Bayuda, mpe sima, mpo na bato ya bikolo ya bapaya. 17Pamba te, ezali na nzela ya sango malamu nde bosembo ya Nzambe emonisamaka, bosembo oyo ezwamaka na nzela ya kondima, wuta na ebandeli kino na suka, lokola ekomama : “Moto na sembo akobika na kondima.”

BATO NYONSO BAZALI BATO YA MASUMU

Lisumu ya bato ya bikolo ya bapaya

18Solo, Nzambe amonisaka kanda na ye wuta na lola mpo na kopesa etumbu na lisumu mpe mabe nyonso oyo bato basalaka. Boye, na nzela ya misala na bango ya mabe, bazipaka bosolo. 19Boye, makambo oyo bakoki koyeba na tina na Nzambe ezali polele epai na bango, pamba te Nzambe ye moko nde alakisa bango yango na polele. 20Wuta Nzambe ekela mokili, makoki na Ye oyo emonanaka na miso te, elingi koloba, nguya na Ye oyo ewumelaka seko na seko mpe bonzambe na Ye, ezali komonana polele penza na bososoli, na nzela ya misala na Ye. Boye, bato bakoki komilongola na ngambo te.

21Pamba te, ata bayebaki Nzambe, bapesaki Ye te lokumu oyo ekoki na Nzambe, mpe bazongiselaki Ye matondi te. Kasi makanisi na bango ekomaki ya bozoba, mpe mitema na bango oyo ezangaki mayele etondaki na molili. 22Bazalaki komimona bato ya bwanya, nzoka nde bakomaki bazoba. 23Na esika ete bakumisa Nzambe oyo akufaka te mpe atonda na nkembo, bakumisaki banzambe ye bikeko lokola : bilili ya bato oyo bakufaka, ya bandeke, ya banyama oyo etambolaka na makolo minei mpe ya bikelamu oyo etambolaka na libumu.

24Yango wana, Nzambe asundolaki bango kati na baposa ya mabe ya mitema na bango, mpe kati na misala ya bosoto mpo ete bayokisa banzoto na bango soni bango na bango. 25Babongolaki bosolo ya Nzambe na makambo ya lokuta, bapesaki lokumu mpe basalelaki bikelamu na esika ya Mokeli, Ye oyo abongi na lokumu seko na seko. Amen.

26Yango wana, Nzambe asundolaki bango kati na baposa ya soni. Ezala basi na bango, batikaki kosangisa nzoto na mibali, mpe bakomaki kosangisa nzoto basi na basi. 27Mibali mpe ndenge moko ; bango mpe batikaki kosangisa nzoto na basi, kasi batondisamaki na posa bango na bango, bazalaki kosala makambo ya soni mibali na mibali. Boye, bazwaki bango moko lifuti oyo ekokaki na libunga na bango.

28Lokola bamonaki ete koyeba Nzambe ezalaki na tina te, Nzambe asundolaki bango na makanisi na bango ya mabe, mpo ete basala makambo oyo ekoki te. 29Bongo, batondaki na misala ya sembo te ya ndenge na ndenge, misala ya mabe, ya lokoso ya mbongo mpe ya mayele mabe. Batondaki na zuwa, koboma, koswana, koteka baninga mpe na makambo ezanga tina. Bakomaki bato ya songi-songi, 30bato ya kotiola, banguna ya Nzambe, bato ya lolendo, bato ya lofundu, bato ya biloba-loba, bato oyo balukaka kaka kosala mabe, batiolaka baboti na bango ; 31bazangi mayele mpe bosembo, bakomaki mitema mabanga mpe mitema ezanga mawa.

32Bayebi penza malamu ekateli ya Nzambe ete baoyo basalaka makambo wana basengeli kokufa. Kasi ata bongo, ezali kaka te mpo bazali kosala makambo wana, kasi mpo ete bazali mpe kondima bato oyo basalaka yango.
Copyright information for LinMNB