Romans 10

1Bandeko, posa ya motema na ngai mpe libondeli na ngai epai na Nzambe ezali ete bato ya Isalaele babika. 2Pamba te, nakoki solo kotatola mpo na bango ete bazali penza na bolingo oyo eleka ndelo mpo na Nzambe. Nzoka nde, bolingo yango oyo eleka ndelo evandisami na boyebi te. 3Lokola bayebaki te ndenge nini Nzambe akomisaka bato sembo mpe balukaki komikomisa sembo na ndenge na bango moko, batosaki te lolenge oyo Nzambe akomisaka bato sembo. 4Klisto nde asukisa Mobeko mpo ete bato nyonso oyo bakondima, bakoma bato na sembo.

5Tala ndenge Moyize akomaki na tina na bosembo oyo ewutaka na nzela ya Mobeko : “Moto oyo akokokisa bikateli ya Mobeko akobika na nzela na yango.” 6Kasi tala ndenge bosembo oyo ewutaka na nzela ya kondima elobaka : “Koloba te kati na motema na yo : ‘Nani akomata na Likolo ?’ ” Ezali lokola kokitisa Klisto ; 7“to mpe : ‘Nani akokita na se ya mabele ?’ ” Ezali lokola kotombola Klisto kati na bakufi. 8Kasi elobi penza nini ? “Liloba ezali pene na yo, ezali na monoko na yo mpe na motema na yo.” Liloba oyo nde ezali Liloba ya kondima oyo tozali kotatola. 9Soki otatoli na monoko na yo ete Yesu azali Nkolo, mpe ondimi na motema na yo ete Nzambe asekwisaki ye kati na bakufi, okobika. 10Pamba te, kondima oyo ekomisaka bato sembo ewutaka na motema, mpe litatoli oyo ebikisaka bato ebimaka nde na monoko. 11Ndenge Makomi eloba : “Moto oyo akondimela Ye, akoyokisama soni te.” 12Yango wana, bokeseni ezali te kati na Moyuda mpe moto ya ekolo ya bapaya. Pamba te, bango nyonso bazali kaka na Nkolo moko. Ye apambolaka makasi bato nyonso oyo babelelaka Ye ; 13mpo ete ekomama : “Moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo, akobika.”

14Boye, ndenge nini bakoki solo kobelela Ye, soki bandimeli Ye te ? Mpe ndenge nini bakoki solo kondimela Ye, soki bayoki nanu sango na Ye te ? Mpe ndenge nini bakoki solo koyoka sango na Ye, soki moto ateyi bango te ? 15Mpe ndenge nini bakoki solo koteya, soki batindami te ? Ndenge ekomama : “Oh, ezali kitoko, makolo ya bato oyo basakolaka basango malamu !”

16Kasi, bato nyonso te ya Isalaele nde bandimaki Sango Malamu. Pamba te, Ezayi alobaki : “Nkolo, nani andimaki mateya na biso ?” 17Boye, kondima ewutaka na maloba oyo toyokaka, mpe maloba oyo toyokaka ewutaka na Liloba ya Klisto. 18Natuna nanu : Boni, bayokaki te ? Eh, bayokaki ! Pamba te, ekomama :
“Mingongo na bango eyokanaki na mokili mobimba ;
maloba na bango ekomaki kino na basuka ya mokili.”

19Natuna lisusu : Bato ya Isalaele basosolaki te ? Moyize azalaki moto ya liboso ya koloba : “Nakosala ete boyoka zuwa ya oyo ezali ata ekolo te.
Nakosala ete boyoka kanda
mpo na ekolo oyo ezanga ata mayele.”

20Boye, Ezayi akomaki kino na koloba : “Namimonisaki epai ya bato oyo balukaki ngai te,
namilakisaki epai ya bato oyo batunaki ngai te.”

21Kasi alobaki boye mpo na Isalaele : “Natandaki maboko na ngai mokolo mobimba
epai ya bato oyo bazanga batosi
mpe bato ya mito makasi.”
Copyright information for LinMNB