Romans 11

Nzambe asundolaki Isalaele te

1Boye, natunaki : Boni, Nzambe asundolaki bato na Ye ? Soki moke te ! Pamba te, ngai mpe nazali moto ya Isalaele, mwana ya Abrayami, kati na libota ya Benjame. 2Te, Nzambe asundolaki te bato na Ye oyo ayeba wuta kala. Boni, boyebi te makambo oyo Makomi eloba na eteni oyo elobaka na tina na Eliya, ndenge nini azalaki komitungisa mpo na Isalaele liboso ya Nzambe :

3—Nkolo, babomi basakoli na Yo mpe babuki-buki bitumbelo na Yo ; natikali kaka ngai moko, mpe bazali lisusu koluka kaboma ngai !

4Boye, eyano nini Nzambe azongiselaki ye ?

—Nabombi bato nkoto sambo (7.000) mpo na ngai, baoyo bafukameli nanu nzambe Bala te.

5Ndenge moko mpe mpo na tango oyo, ezali na mwa ndambo ya bato oyo Nzambe apona na ngolu na Ye. 6Nzoka nde, soki koponama yango esalamaki na ngolu, boye ezali likambo ya misala te ; soki te, ngolu ekozala lisusu ngolu te.

7Bongo, toloba lisusu nini ? Eloko oyo bato ya Isalaele bazali koluka, bazwi yango te, kasi bato oyo Nzambe asila kopona bazwa yango. Mpe mpo na bato mosusu, bakoma mitema mabanga, 8ndenge ekomama : “Nzambe apesaki bango molimo ya pongi,
miso mpo ete bamona te mpe matoyi mpo ete bayoka te,
kino na mokolo ya lelo.”

9Mpe Davidi alobaki : “Tika ete bafeti na bango ekoma motambo mpe monyama mpo na bango,
libaku oyo ekokweisa bango mpe etumbu mpo na bango.

10 Tika ete miso na bango ekufa mpo ete bamona lisusu te,
mpe mikongo na bango egumbama mpo na libela.”

Isalaele ekweyi mpo na libela te

11Natuna lisusu : boni, bato ya Isalaele bakweyaki mpo na libela wana babetaki libaku ? Soki moke te ! Kasi, likolo ya kokweya na bango nde bato ya bikolo ya bapaya bazwi lobiko, mpo ete bato ya Isalaele basala zuwa. 12Nzoka nde, soki kokweya na bango epesi mokili bomengo, mpe kobunga na bango epesi bato ya bikolo ya bapaya bomengo, boye kobongola mitema na bango ekomema bomengo ya ndenge nini ?

13Nazali koloba epai ya bato ya bikolo ya bapaya. Lokola nazali ntoma ya bato ya bato ya bikolo ya bapaya, napesaka lokumu na mosala na ngai 14na elikya ete nalamusa zuwa ya bato ya ekolo na ngai mpe kobikisa ndambo ya bato kati na bango. 15Pamba te, soki kosundolama na bango ezongisi boyokani kati na Nzambe mpe mokili, boye koyambama na bango ekozala ndenge nini ? Boni, ekozala te lokola moto asekwi kati na bakufi ?

16Nzoka nde, soki mapa ya liboso oyo bapesi epai na Nzambe ezali bule, elingi koloba ete, mapa nyonso oyo etikali mpe ezali bule ; soki mosisa ya nzete ezali bule, elingi koloba ete, bitape na yango mpe ezali bule.

17Kasi soki bitape misusu ekatamaki, nzoka nde yo, etape ya nzete ya olive ya zamba, bakangisaki yo na bitape oyo etikalaki, mpe sikʼoyo okomi komela mayi moko elongo na bango na mosisa ya nzete ya olive. 18Yango wana, kobeta tolo te liboso ya bitape oyo ekatama. Soki omeki kobeta tolo : yeba malamu ete yo te moto ozali komema mosisa, kasi mosisa nde ezali komema yo. 19Okoki mpe koloba : “Bitape wana ekatamaki mpo ete bakangisa ngai na esika na yango.” 20Olobi malamu. Bakatamaki mpo ete bazangaki kondima, kasi yo, ozali wana mpo na kondima. Kotombola mapeka te, kasi sala nde keba. 21Pamba te, soki Nzambe azangaki te kokata bitape oyo ebimaka yango moko na nzete, akozanga mpe te kokata yo.

22Boye, sosola malamu bolamu mpe kanda na Nzambe : kanda epai ya bato oyo bakweyi, mpe bolamu epai na yo, soki ozali kokoba kowumela kaka na bolamu yango ; soki te, yo mpe okokatama. 23Mpe soki bato ya Isaelaele babongoli motema, bakozongisa bango lisusu na nzete, pamba te, Nzambe azali na makoki ya kozongisa bango lisusu na nzete. 24Boye, soki yo, owutaki na nzete ya olive ya zamba oyo ebimisaki yo, mpe bakangisaki yo na nzete ya olive oyo balona, ata yango te nde ebimisaki yo, boye ndenge nini bakoki te kozongisa bitape ya nzete oyo ebimisaki yango na nzete na yango ?

Bato nyonso ya Isalaele bakobika

25Bandeko, nalingi ete boyeba mabombami oyo mpo ete bomimona te ete boleki na bwanya : ndambo ya bato ya Isalaele bakowumela kozala mitema libanga kino bato nyonso ya bikolo ya bapaya bakokota na libota ya Nzambe. 26Boye, bato nyonso ya Isalaele bakobika, ndenge ekomama : “Mokangoli akobimela na Siona ;
akolongola mabe kati na Jakobi.

27 Mpe yango nde ekozala boyokani na ngai
elongo na bango tango nakolongola masumu na bango.”

28Mpo na oyo etali Sango Malamu, bazali banguna ya Nzambe mpo na bolamu na bino ; kasi mpo na oyo etali koponama ya Nzambe, bazali balingami na Ye mpo na bakoko na bango. 29Pamba te, Nzambe abotolaka te makabo oyo apesaka, mpe abongolaka te ebiangeli na Ye. 30Ndenge na kala bozangaki botosi na miso ya Nzambe, mpe sikʼoyo Nzambe ayokeli bino mawa mpo na kozanga botosi na bango ; 31ndenge wana mpe, kozanga botosi na bango ya sikʼoyo esali ete Nzambe ayokela bino mawa, mpo ete ayokela bango mpe mawa. 32Pamba te, Nzambe akanga bato nyonso lokola na boloko ya kozanga botosi, mpo ete ayokela bato nyonso mawa.

Lokumu epai na Nzambe

33Oh, tala ndenge nini bomengo, bwanya mpe boyebi ya Nzambe
ezali na mozindo mingi !
Moto moko te akoki koyeba makanisi na Ye,
mpe kososola nzela na Ye !

34 “Nani ayebaki makanisi ya Nkolo ?
To nani akokaki kopesa Ye toli ?

35 Nani apesaki Nkolo eloko
mpo ete Nkolo azongisela ye ?”

36 Pamba te, biloko nyonso ewutaka epai na Ye,
na nzela na Ye mpe mpo na Ye.
Tika ete nkembo ezonga epai na Ye
libela na libela ! Amen.
Copyright information for LinMNB