Romans 13

Botosi epai ya bakonzi ya leta

1Tika ete moto nyonso atosa bakonzi ya leta, pamba te ezali na bokonzi moko te oyo ezangi kowuta na Nzambe, mpe oyo Nzambe azangi kotia. 2Boye, moto oyo aboyi kotosa bakonzi ya leta, azali nde kotombokela mabongisi oyo Nzambe asila kotia, boye bato oyo basalaka bongo, bamibendelaka nde etumbu mpo na bango moko. 3Bazuzi babangisaka te bato oyo batambolaka malamu, kasi babangisaka kaka bato oyo basalaka mabe. Boye, oboyi kobanga mokonzi ? Sala malamu mpe akondima yo. 4Pamba te, mokonzi azali mosali na Nzambe mpo na bolamu na yo. Kasi soki ozali kosala mabe, banga, pamba te asimbaka mopanga na pamba te. Azali mosali na Nzambe, mpo na kolakisa kanda na Nzambe likolo ya baoyo basalaka mabe. 5Yango wana, ezali na tina mingi kotosa mokonzi, kaka te mpo na kobanga kozwa etumbu, kasi mingi mpo na kosala oyo mitema na biso ezali kosenga biso. 6Yango wana mpe bofutaka bampako, pamba te bakonzi bazali basali ya Nzambe, oyo bapesa tango na bango nyonso mpo na kokamba. 7Bopesa na moto na moto oyo ekoki na ye : mpaku, na oyo asengeli kozwa mpako ; batike ya biloko, na oyo asengeli kozwa tike ya biloko ; botosi, na oyo asengeli kotosama, mpe lokumu, na oyo asengeli kozwa lokumu.

Bolingo

8Bozala na niongo ya moto te, kaka niongo ya kolingana bino na bino, pamba te, moto oyo alingaka bato, akokisi makambo nyonso oyo Mobeko esengaka. 9Pamba te, mobeko lokola : kosala ekobo te, koboma te, koyiba te, kolula te mpe nyonso oyo etikali, elobami na mokuse kati na liloba oyo : “Linga moninga na yo lokola yo moko.” 10Moto oyo azali na bolingo, asalaka moninga na ye mabe te. Yango wana, kolinga moninga ezali kokokisa Mobeko.

Mokolo ekomi pene

11Lokola boyebi malamu soki tokomi tango nini : ezali tango ya kolamuka na pongi ; pamba te, lelo, lobiko ekomi pene na biso koleka tango oyo tondimaki. 12Butu esili kowumela mpe tongo elingi kotana. Yango wana, tobwaka misala ya molili mpe tolata bibundeli ya pole. 13Totambola na bizaleli ya moyi : na lokoso te, na kolangwa masanga te, na kindumba mpe na ekobo te, na koswana mpe na zuwa te. 14Kasi bolata Nkolo Yesu Klisto, mpe bokokisa te baposa ya nzoto oyo ezali kotungisa biso.
Copyright information for LinMNB